Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ba-Ebre 12:18 - Mokanda na Bomoi

18 Bino, bopusani te, lokola bana ya Isalaele, pene ya ngomba oyo bakokaki kosimba mpe ezali kopela moto, pene ya lipata, pene ya molili makasi, pene ya mopepe makasi,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ba-Ebre 12:18
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango bato bayokaki bakake mpe koganga ya kelelo, mpe bamonaki mikalikali mpe milinga kobima na ngomba, balengaki. Batelemaki mosika


Na miso ya bana ya Isalaele, Nkembo ya Yawe emonanaki na likolo ya ngomba lokola moto oyo etumbaka.


Pamba te lisumu ekozala lisusu na bokonzi te likolo na bino, pamba te bozali lisusu na se ya bokonzi ya Mobeko te, kasi na se ya ngolu.


Solo, bozwaki te Molimo oyo akomisaka bino bawumbu mpo ete bozala na kobanga, kasi bozwaki Molimo oyo akomisaka bino bana na Nzambe, mpe ezali na nzela ya Molimo yango nde togangaka : « Tata ! »


Sik’oyo, soki lotomo ya kufa, oyo ekomamaki na likolo ya bitando ya mabanga, eyaki na nkembo, na ndenge ete bana ya Isalaele balongaki te kowumela kotala elongi ya Moyize likolo ya kongenga ya nkembo na yango, nzokande nkembo yango esengelaki kosila,


Pamba te, soki lotomo oyo ememelaki bato etumbu ezalaki na nkembo, ndenge nini lotomo oyo esalaki ete Nzambe akomisa bato sembo eleka na nkembo te ?


Yango wana, bino bopusanaki mpe botelemaki na ebandeli ya ngomba tango ezalaki kopela moto oyo ekomaki kino na likolo elongo na mapata ya mwindo mpe molili makasi.


Na tango wana, natelemaki kati ya Yawe mpe bino mpo na koyebisa bino maloba na Yawe, pamba te bozalaki kobanga moto mpe bomataki te likolo ya ngomba. Tala maloba oyo alobaki :


Pamba te Molimo oyo Nzambe apesa biso akomisaka biso te bato ya kobanga-banga, kasi apesaka biso makasi, bolingo mpe mayele.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ