Jakobi alobaki : — Nabondeli yo, yebisa ngai kombo na yo. Azongiselaki ye : — Mpo na nini ozali kotuna kombo na ngai ? Boye apambolaki ye na esika wana.
Nzembo ya Davidi. Nzembo ya mobembo mpo na kokende na Tempelo ya Yawe. Tala ndenge ezali malamu mpe ndenge ezali kitoko mpo na bandeko kozala lisanga kati na bomoko !
Mungwa ezali malamu. Kasi soki mungwa ebungisi elengi na yango, ndenge nini bokokoka lisusu kozongisa elengi na yango ? Yango wana, bozala na mungwa kati na bino, mpe bozala na kimia bino na bino.
Kasi awa bolongwe sik’oyo na se ya bowumbu ya lisumu mpe bokomi na se ya bowumbu ya Nzambe, litomba oyo bozwi ezali bomoi ya bosantu, mpe suka na yango ezali bomoi ya seko.
Bandeko, na Kombo ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto, nazali kosenga na bino ete bozala na boyokani kati na bino, kasi na bokabwani te ; bozala motema moko mpe makanisi moko.
Balingami na ngai, lokola tozali na bilaka ya lolenge oyo, tomipetolaka na nyonso oyo ekomisaka nzoto mpe molimo mbindo, mpo na kotambola na bomoi ya bosantu, kati na kotosa Nzambe.
Boni, Mobeko eyaki mpo na kotelemela bilaka ya Nzambe ? Ata moke te ! Soki mobeko moko epesamaki, mobeko oyo ezali na makoki ya kopesa bato bomoi, bato balingaki penza kokoma sembo na nzela ya mobeko yango.
Pamba te, boyeba yango malamu, moto nyonso oyo asalaka kindumba, makambo ya soni to atondi na lokoso oyo ekokani na kosambela bikeko, akokota te na Bokonzi ya Klisto mpe ya Nzambe.
Tika ete alendisa mitema na bino mpo ete bozanga pamela kati na bosantu liboso ya Nzambe mpe Tata na biso, na mokolo oyo Yesu, Nkolo na biso, akoya elongo na basantu na Ye nyonso ! Amen !
Batata na biso bazalaki kopesa biso bitumbu mpo na mwa tango moke, ndenge mitema na bango ezalaki kolinga ; kasi Nzambe apesaka biso etumbu mpo na bolamu na biso, mpo ete tokoka kosangana na bosantu na Ye.
ndenge wana mpe Klisto, oyo amikabaki lokola mbeka mbala moko mpo na kolongola masumu ya bato ebele, akoya na mbala ya mibale, mpo na kolongola masumu ya bato te, kasi mpo na kobikisa bato oyo bazali kozela Ye na posa makasi.
Lokola nyonso esengeli konyangwama ndenge wana, bosengeli kotambola ndenge nini ? Bosengeli kotambola na bomoi ya bule mpe na botosi kati na makambo ya Nzambe
kasi bokola kati na ngolu mpe boyebi ya Yesu-Klisto, Nkolo mpe Mobikisi na biso. Tika ete nkembo epesamela Ye, wuta sik’oyo kino libela na libela ! Amen !