12 Yango wana, bolendisa maboko na bino, oyo ebandi kolemba mpe bokembisa mabolongo na bino, oyo ekomi kolenga.
Mabolongo na ngai elembi mpo na kokila mingi bilei, nzoto na ngai mpe ebukani mpo ete nakondi makasi.
Pesa makasi na maboko oyo elembi, lendisa mabolongo oyo ezali kolenga ;
« Mwana na moto, talisa elongi na yo na ngambo ya Yelusalemi, loba mpo na kotelemela bisika ya bule mpe sakola mpo na kotelemela Isalaele.
Maboko na bango nyonso ekolemba, mpe mabolongo na bango nyonso ekolemba lokola mayi.
elongi na ye etelaki na somo mpe makanisi na ye ekomaki kotambola, nzoto na ye mobimba ekomaki kolenga mpe mabolongo na ye ekomaki kotutana.
Bobotola wolo mpe palata na yango na makasi, pamba te bomengo na yango ezali penza mingi koleka mpe etonda na biloko ya motuya.
Na mokolo wana, bakoloba na Yelusalemi : ‹ Oh Siona, kobanga te ! Tika ete maboko na yo elemba te !
Bandeko, tozali kolendisa bino : bopesaka bagoyigoyi mpe bato ya mobulu makebisi, bolendisaka ba-oyo basili kobungisa mpiko na bango, bosungaka ba-oyo bazangi makasi, boyikanaka mpiko.
Bokundolaka mozindo ya Ye oyo akangaki motema liboso ya basumuki oyo bazalaki konyokola Ye, mpo ete bobungisa te molende mpe mpiko na bino.
Mpe bobosani maloba nyonso ya malendisi oyo ayebisaki bino ndenge tata ayebisaka bana : « Mwana na Ngai, kozwa na pamba te etumbu ya Nkolo, mpe kobungisa mpiko na yo te soki apameli yo.