Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ba-Ebre 12:11 - Mokanda na Bomoi

11 Moto moko te azalaka na esengo soki bapesi ye etumbu, pamba te epesaka mawa ; kasi sima na tango, etumbu ebotaka lokola mbuma, epai ya moto oyo bapesi yango : bomoi ya bosembo mpe ya kimia.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ba-Ebre 12:11
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango Abrayami ayokaki bongo, esalaki ye pasi makasi na motema mpo na mwana na ye.


Solo, Yawe apesaki ngai etumbu makasi ; kasi akabaki ngai na kufa te.


Bato oyo balingaka mibeko na Yo bazali bato na kimia monene, mpe eloko moko te ekobetisa bango lisusu mabaku.


soki babuki mitindo na ngai mpe babateli te mibeko na ngai,


Moto oyo abimaka libanda ya nzela ya sembo akozwa pamela ya makasi ; moto oyo aboyaka pamela akokufa.


Pesaka mwana na yo etumbu wana elikya ezali nanu, kasi kotomboka na yo ekoma te kino na posa ya koboma ye.


Kasi Yawe akobeta Ejipito na nzela ya bitumbu, akobeta yango mpe akobikisa yango. Bakozonga epai na Yawe, bongo akoyanola na kolela na bango mpe akobikisa bango.


Mbuma ya bosembo ekozala kimia : bosembo ekobota bopemi mpe bobatelami mpo na libela.


Pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali te likambo ya kolia to ya komela, kasi ezali nde likambo ya bosembo, ya kimia mpe ya esengo kati na Molimo Mosantu.


Pamba te pasi oyo tozali komona sik’oyo ezali pepele mpe ezali koleka, ezali nde kobongisela biso nkembo monene, nkembo ya seko mpe nkembo oyo eleki nyonso na motuya.


Sik’oyo, Nzambe abombeli ngai motole ya bosembo, oyo Nkolo, Mosambisi ya sembo, akopesa ngai na mokolo wana : akopesa yango na ngai kaka te, kasi mpe na bato nyonso oyo balingaka boyei na Ye.


Batata na biso bazalaki kopesa biso bitumbu mpo na mwa tango moke, ndenge mitema na bango ezalaki kolinga ; kasi Nzambe apesaka biso etumbu mpo na bolamu na biso, mpo ete tokoka kosangana na bosantu na Ye.


Bilei ya makasi ezali mpo na mikolo, ba-oyo bayebi kokesenisa malamu mpe mabe.


Bosepelaka na lobiko yango, atako bosengeli sik’oyo kotungisama mpo na mwa tango moke na nzela ya komekama ya lolenge nyonso.


Miso na bango elembaka te kolula basi mpo na koluka kosala na bango ekobo, balembaka te kosala masumu, bakosaka bato oyo balendisama malamu te na kondima ; bazali na mitema etonda na lokoso : bazali na se ya bilakeli mabe ya Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ