Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ba-Ebre 12:10 - Mokanda na Bomoi

10 Batata na biso bazalaki kopesa biso bitumbu mpo na mwa tango moke, ndenge mitema na bango ezalaki kolinga ; kasi Nzambe apesaka biso etumbu mpo na bolamu na biso, mpo ete tokoka kosangana na bosantu na Ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ba-Ebre 12:10
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe, nayebi malamu ete mibeko na Yo ezali sembo, mpe ete ezali kaka mpo na bolingo na Yo nde obetaki ngai.


Mpo na ngai, sima na ngai kolonga, nakotala elongi na Yo ; sima na ngai kolamuka, nakosepela na komona Yo !


Ezalaka na esengo te nde Yawe ayokisaka bato soni to atindelaka bato pasi.


« Yebisa lisanga mobimba ya bana ya Isalaele : ‹ Bozala bule, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na bino, nazali Bule.


mpe mpo ete bolata bomoto ya sika oyo ekelami kolanda Nzambe, kati na bosembo mpe bosantu ya bosolo.


Kasi sik’oyo, Nzambe azongisi boyokani kati na Ye mpe bino na nzela ya kufa ya Yesu, Mwana na Ye, oyo akabaki nzoto na Ye ya bomoto lokola mbeka mpo na kotalisa bino epai ya Nzambe lokola bato ya bule, bazanga pamela mpe bazanga mbeba.


amikabaki Ye moko mpo na biso, mpo ete akangola biso na mabe nyonso mpe apetola biso mpo na Ye moko lokola bato na Ye, oyo batondi na posa makasi ya kosala misala ya malamu.


Bolukaka kovanda na kimia elongo na bato nyonso mpe kotambola na bomoi ya bosantu, pamba te moko te akomona Nkolo soki azangi bosantu.


Bino mpe, lokola mabanga ya bomoi, botika ete Nzambe asalela bino mpo na kotonga Tempelo ya Molimo. Kati na Tempelo yango, lokola Banganga-Nzambe ya bule, apesi bino mokumba ya kobonzelaka Ye, na nzela ya Yesu-Klisto, bambeka ya molimo, bambeka oyo Nzambe andimaka.


Kasi bino bozali libota oyo eponama, Banganga-Nzambe ya Mokonzi, ekolo ya bule mpe basikolami ya Nzambe mpo na kosakola misala minene ya Ye oyo abenga bino mpo ete bolongwa na molili mpe bokota kati na pole na Ye ya kokamwa.


Na nzela ya nkembo mpe bolamu yango, apesaki biso bilaka minene mpe ya motuya makasi mpo ete, na nzela na yango, bosangana na bonzambe mpe bokima libebi oyo baposa mabe ezali kovandisa kati na mokili.


Elimeleki, mobali ya Naomi, akufaki ; mpe Naomi atikalaki ye moko elongo na bana na ye mibale ya mibali.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ