Ba-Ebre 11:6 - Mokanda na Bomoi6 Nzokande, moto moko te akoki kosepelisa Nzambe soki azangi kondima, pamba te moto oyo azali kopusana pene ya Nzambe asengeli kondima ete Nzambe azali mpe afutaka bato oyo balukaka Ye. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kasi bolingaka banguna na bino, bosalelaka bango bolamu, bodefisaka na kozanga kolikya ete bakofuta bino niongo. Na bongo, bokozwa litomba monene mpe bokozala bana ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ; pamba te azali malamu mpo na bato oyo bandimaka te bolamu oyo basaleli bango, mpe azali malamu mpo na bato mabe.