29 Mpo na kondima, bato ya Isalaele bakatisaki ebale monene ya Barozo lokola nde bazali kotambola na mabele ya kokawuka ; kasi tango bato ya Ejipito bamekaki kosala lokola bango, bazindaki.
Okabolaki ebale monene liboso na bango, mpe batambolaki kati na ebale yango lokola na mabele ya kokawuka. Kasi ozindisaki lokola libanga monene kati na mozindo ya mayi makasi, bato oyo bazalaki kolanda bango.
Bato ya Isalaele batambolaki na ebale monene lokola na mabele ya kokawuka. Mayi etelemaki lokola mir na ngambo ya loboko na bango ya mobali mpe na ngambo ya loboko na bango ya mwasi.
Moyize asembolaki loboko na ye likolo ya ebale monene, mpe liboso ete tongo etana, ebale monene ezongaki na esika na yango mpe bato ya Ejipito oyo balukaki kokima, bakutanaki na mayi liboso na bango. Boye Yawe azindisaki bango kati na ebale monene.
Toyokaki ndenge nini Yawe akawusaki Ebale monene ya Barozo liboso na bino tango bobimaki na Ejipito, mpe makambo oyo bosalaki Sikoni mpe Ogi, bakonzi mibale ya bato ya Amori, oyo bobomaki penza na ngambo ya este ya Yordani.