Bongo Jakobi alobaki lisusu : — Lapa ndayi mpo na kolakisa ete okosala ndenge olobi. Boye, Jozefi alapaki ndayi na miso na ye ; mpe Isalaele agumbamaki na koyekama na moto ya mbeto na ye.
basali ya mokonzi bayei kopesa longonya epai na Davidi, mokonzi na biso, na maloba oyo : « Tika ete Nzambe na yo akomisa kombo ya Salomo monene koleka kombo na yo, mpe kiti na ye ya bokonzi, monene koleka oyo ya yo ! » Bongo mokonzi agumbamaki mpe agumbamelaki Nzambe na mbeto na ye,