Nzambe alobaki : — Te ! Mwasi na yo, Sara, akobotela yo mwana mobali, mpe okobenga ye « Izaki. » Nakobatela boyokani na Ngai lokola boyokani ya libela elongo na ye mpe bakitani na ye sima na ye.
Kasi Nzambe ayebisaki Abrayami : « Tika koyoka pasi na motema mpo na mwana na yo ya mobali mpe mwasi mowumbu na yo. Yoka nyonso oyo Sara azali koyebisa yo, pamba te ezali na nzela ya Izaki nde okozwa bakitani.