17 Mpo na kondima, Abrayami akabaki Izaki lokola mbeka tango Nzambe amekaki ye motema ; amilengelaki mpo na kokaba mwana na ye wana kaka moko, atako azalaki na elaka.
mpe alobaki : « Nakati seleka na Kombo na Ngai, elobi Yawe, ete lokola osali likambo ya boye, lokola oboyi te kopesa Ngai mwana na yo ya mobali, mwana na yo se moko,
Kasi tango bakambi ya Babiloni batindelaki ye bakalaka mpo na kotuna ye na tina na elembo ya kokamwa oyo esalemaki kati na mokili, Nzambe atikaki Ezekiasi kosala na ndenge na ye moko mpo na komeka ye mpe koyeba mozindo ya motema na ye.
Bato mosusu kati na bato ya bwanya bakobeta mabaku, mpo ete bakomisama bato ya kokoka, bapetolama mpe bazangi mbeba, mpo na tango ya suka, pamba te suka ya makambo ekoya kaka na tango oyo ekatama.
Pamba te Nzambe alingaki mokili mingi penza, yango wana apesaki Mwana na Ye se moko, mpo ete moto nyonso oyo akondima Ye akufa te kasi azwa bomoi ya seko.
Pamba te soki mokano ya malamu ezali, Nzambe andimaka likabo oyo moto apesi na motema malamu kolanda oyo azali na yango, kasi kolanda te oyo azali na yango te.
Kobosanaka te ndenge Yawe, Nzambe na yo, akambaki yo na mobembo nyonso kati na esobe mibu tuku minei, mpe ndenge abukaki lolendo na yo mpe amekaki yo mpo na koyeba mozindo ya motema na yo mpe kotala soki okotosa mibeko na Ye to te.
Bato nyonso wana bakufaki kati na kondima mpe batikalaki kozwa te biloko oyo Nzambe alakaki bango, kasi bamonaki yango kaka na mosika mpe bapesaki yango mbote. Bandimaki ete bazali solo bapaya mpe baleki nzela kati na mokili.
Ndenge boyebi, tobengaka bato oyo bayikaka mpiko bato ya esengo. Boyokaki sango ya lolenge oyo Yobo akangaki motema kati na pasi, mpe boyebi malamu makambo oyo Nkolo asalaki, na suka, mpo na bolamu na ye ; pamba te Nkolo atonda na boboto mpe na mawa.
Lokola obatelaki etinda na Ngai ya kozala na molende, Ngai mpe nakobatela yo na tango ya pasi oyo ekokweyela mokili mobimba mpo na komeka bavandi na yango.