Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ba-Ebre 11:16 - Mokanda na Bomoi

16 Kasi sik’oyo bazali koluka mokili ya kitoko penza, elingi koloba mokili ya Likolo. Yango wana Nzambe azalaka na soni te tango babengaka Ye « Nzambe na bango, » pamba te abongisela bango engumba moko ya kitoko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ba-Ebre 11:16
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na butu ya mokolo oyo Izaki akomaki na Beri-Sheba, Yawe abimelaki ye mpe alobaki na ye : « Nazali Nzambe ya Abrayami, tata na yo ; kobanga te, nazali elongo na yo. Mpo na Abrayami, mosali na Ngai, nakopambola yo mpe nakokomisa bakitani na yo ebele. »


Mpe Yawe atelemaki likolo ya ematelo mpe alobaki na ye : « Nazali Yawe, Nzambe ya koko na yo Abrayami mpe Nzambe ya Izaki. Nakopesa epai na yo mpe na bana na yo mabele oyo, esika olali.


Nzambe alobaki lisusu na Moyize : — Loba na bana ya Isalaele : « Yawe Nzambe ya bakoko na bino, Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi, atindi ngai epai na bino. » Yango nde Kombo na Ngai mpo na libela, Kombo oyo bokokanisela Ngai libela na libela.


Alobaki lisusu : — Nazali Nzambe ya bakoko na yo, Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi. Boye Moyize abombaki elongi na ye, pamba te abangaki kotala Nzambe.


Yawe alobaki na ye : — Esalemi bongo mpo ete bandima solo ete Yawe, Nzambe ya bakoko na bango, Nzambe ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi, amonanaki na yo.


« Na tango wana, » elobi Yawe, « Ngai nakozala Nzambe ya bituka nyonso ya Isalaele, mpe bango bakozala bato na Ngai. »


Sima na yango, Mokonzi akoloba na bato oyo bakozala na ngambo ya loboko na Ye ya mobali : « Boya, bino bato oyo Tata na Ngai apambola, bokamata libula na bino, Bokonzi oyo babongisela bino wuta mokili ekelama.


Mpo na oyo etali lisekwa ya bakufi, botikala nanu kotanga te kati na buku ya Moyize, makambo oyo Nzambe alobaki na ye na tina na nzete oyo ezalaki kopela moto kasi ezalaki kozika te : « Nazali Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi ? »


Moto nyonso oyo akoyoka Ngai mpe maloba na Ngai soni, kati na bato ya ekeke oyo, ba-oyo batosaka Nzambe te mpe batondi na masumu, Mwana na Moto mpe akoyoka ye soni, tango akoya elongo na ba-anjelu ya bule kati na nkembo ya Tata na Ye.


Oh etonga moke, bobanga te ! Pamba te Tata na bino asepelaki kopesa bino Bokonzi !


Moyize atalisaki polele ete bakufi bakosekwa ; pamba te, kati na eteni oyo ezali kolobela nzete oyo ezalaki kopela moto kasi ezalaki kozika te, abengaki Nkolo « Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi. »


Kati na ndako ya Tata na Ngai, bisika ezali mingi. Soki ezalaki bongo te, boni, nalingaki koyebisa bino ete nakeyi kuna mpo na kobongisela bino esika ?


« Nazali Nzambe ya bakoko na yo, Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi. » Moyize alengaki na somo mpe akokaki kutu kotala te.


Kasi biso, mboka na biso ezali kati na Likolo, mpe tozali kozela na posa makasi Mobikisi na biso, Nkolo Yesu-Klisto, oyo akowuta na Likolo.


Nayebi solo ete Nkolo akokoba kokangola ngai wuta na misala nyonso ya mabe mpe akobikisa ngai mpo na Bokonzi na Ye ya Likolo. Tika ete nkembo ezonga epai na Ye mpo na libela na libela ! Amen.


Bokabolaki pasi elongo na bakangami ya boloko, mpe bondimaki na esengo nyonso ete babotola ata biloko na bino, pamba te boyebaki ete bozali na bomengo ya kitoko koleka, bomengo oyo ekowumela libela na libela.


Pamba te Abrayami azalaki kozela engumba oyo ezali na miboko oyo ebukanaka te, engumba oyo Ye moko Nzambe azali Mobongisi mpe Motongi na yango.


Bato oyo balobaka ete bazali bapaya mpe baleki nzela kati na mokili batalisaka polele ete bazali koluka mokili na bango.


Nzambe asalaki mabongisi ya kitoko penza mpo na biso, pamba te alingaki ete bakoma bato ya kokoka nzela moko na biso.


Kasi, bopusani nde pene ya ngomba Siona, pene ya Yelusalemi ya Likolo, engumba ya Nzambe na bomoi ; pene ya bankoto na bankoto ya ba-anjelu oyo basangani mpo na kosepela,


pamba te, kati na mokili oyo, tozali na engumba moko te oyo ekowumela libela na libela, kasi tozali nde koluka engumba oyo ezali koya.


Pamba te Mobulisi ya basumuki mpe bato oyo babulisami bazali kaka na Tata moko. Yango wana Yesu azalaki na soni te ya kobenga bango bandeko na Ye,


Namonaki engumba ya bule, Yelusalemi ya sika, kokita wuta na Lola epai ya Nzambe. Ebongisamaki lokola mwasi mobandami ya libala oyo asali monzele mpo na mobali na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ