Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ba-Ebre 11:14 - Mokanda na Bomoi

14 Bato oyo balobaka ete bazali bapaya mpe baleki nzela kati na mokili batalisaka polele ete bazali koluka mokili na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ba-Ebre 11:14
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sefora abotaki mwana mobali mpe Moyize apesaki ye kombo « Gerishomi, » pamba te alobaki : « Nazali mopaya na mboka mopaya. »


Boye, totalaka te oyo emonanaka na miso, kasi totalaka nde oyo emonanaka te ; pamba te oyo emonanaka ezali mpo na tango moke, kasi oyo emonanaka te ekowumelaka seko na seko.


Makambo mibale ezali kobenda ngai ngambo na ngambo : na ngambo moko, kokufa mpo na kozala elongo na Klisto, pamba te yango nde eleki malamu ;


Bato nyonso wana bakufaki kati na kondima mpe batikalaki kozwa te biloko oyo Nzambe alakaki bango, kasi bamonaki yango kaka na mosika mpe bapesaki yango mbote. Bandimaki ete bazali solo bapaya mpe baleki nzela kati na mokili.


Mpe soki bakanisaki mokili oyo batikaki, mbele balingaki kozonga lisusu kuna.


Kasi sik’oyo bazali koluka mokili ya kitoko penza, elingi koloba mokili ya Likolo. Yango wana Nzambe azalaka na soni te tango babengaka Ye « Nzambe na bango, » pamba te abongisela bango engumba moko ya kitoko.


pamba te, kati na mokili oyo, tozali na engumba moko te oyo ekowumela libela na libela, kasi tozali nde koluka engumba oyo ezali koya.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ