Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ba-Ebre 10:7 - Mokanda na Bomoi

7 Bongo nalobaki : ‹ Tala ngai oyo, nayei, nayei, oh Nzambe, mpo na kosala mokano na Yo, kolanda ndenge ekomami na tina na ngai kati na buku. › »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ba-Ebre 10:7
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nakotia koyinana kati na yo mpe mwasi, mpe kati na bakitani na yo mpe bakitani na ye. Bakitani ya mwasi bakonyata moto na yo, mpe yo okoswa bango na litindi. »


Mpe bamonaki buku moko kati na Ekibatane, engumba mokonzi ya etuka ya Medi. Tala makomi oyo ezalaki kati na buku yango : « Ekaniseli :


nazalaki kosepela kati na mokili na Ye mpe nazalaki na esengo kati na bato.


Nkolo Yawe afungolaki ngai matoyi, mpe ngai natiaki moto makasi te ; namizongisaki sima te.


« Kamata mokanda, mpe koma kati na yango makambo nyonso oyo nalobaki na yo mpo na Isalaele, mpo na Yuda mpe mpo na bikolo nyonso mosusu, wuta mokolo oyo nabandaki koloba na yo, na tango Joziasi azalaki mokonzi, kino na mokolo ya lelo.


Bongo natalaki mpe namonaki loboko moko esembolama kino epai na ngai mpe esimbaki mokanda lokola buku elingama.


Bongo alobaki na ngai : « Mwana na moto, lia eloko oyo ezali liboso na yo, lia buku oyo elingama mpe kende koloba na libota ya Isalaele. »


Yesu alobaki na bango : — Bilei na Ngai ezali : kosala mokano ya Ye oyo atindaki Ngai mpe kosilisa mosala oyo apesaki Ngai.


Nakoki kosala eloko moko te na ndenge na Ngai moko : nakataka makambo kolanda oyo nayokaka kowuta epai na Tata, mpe kosambisa na Ngai ezali sembo ; pamba te nalukaka te kosala mokano na Ngai moko, kasi mokano ya Ye oyo atindaki Ngai.


Pamba te soki nakitaki wuta na Likolo, ezali te mpo na kosala mokano na Ngai moko, kasi mpo na kokokisa mokano ya Ye oyo atindaki Ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ