Alati bosembo lokola ebombelo ya tolo, mpe ekoti ya lobiko na moto na Ye ; alati kozongisa mabe na mabe lokola nzambala, mpe amizipi zuwa lokola kazaka.
Mpo na yango, oh libota ya Isalaele, nakosambisa bino, moto na moto kolanda misala na ye, elobi Nkolo Yawe. Bobongwana, botika mabe na bino nyonso mpo ete masumu na bino emema bino na kobebisama te !
Mpo na bino, bibwele na Ngai, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakokata makambo kati na ebwele moko mpe ebwele mosusu, kati na bameme ya mibali mpe bantaba ya mibali.
Yawe azali Nzambe oyo atonda na zuwa, oyo azongisaka mabe na mabe. Yawe azongisaka mabe na mabe mpe atombokaka makasi. Yawe azongisaka mabe na mabe epai ya banguna na Ye, akangelaka bayini na Ye kanda makasi.
Balingami na ngai, bozongisaka te bino moko mabe na mabe, kasi bopesaka nzela na kanda ya Nzambe, pamba te ekomama : « Ngai nde nazongisaka mabe na mabe, Ngai nde nakofuta moto na moto, » elobi Nkolo.
Pamba te mokonzi azali mosali na Nzambe mpo na bolamu na yo. Kasi soki ozali kosala makambo ya mabe, banga mokonzi, pamba te asimbaka mopanga na pamba te. Azali mosali na Nzambe mpo na kokokisa kanda ya Nzambe mpe kopesa etumbu epai ya bato oyo basalaka mabe.
Pamba te biso nyonso tokosamba liboso ya esambiselo ya Klisto mpo ete moto nyonso azwa lifuti oyo ekoki na ye kolanda makambo oyo asalaki na nzela ya nzoto na ye, makambo ya malamu to ya mabe.
Sik’oyo, nkolo na ngai, na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, lokola Yawe apesi yo nzela te ya koboma mpe ya kozongisa yo moko mabe na mabe, tika ete banguna na yo mpe bato nyonso oyo bazali makasi ya kosala mabe epai ya nkolo na ngai bazala lokola Nabali.
Mpe Davidi alobaki lisusu : — Na Kombo na Yawe ! Ye moko Yawe nde akoboma ye : akokufa, ezala soki tango na ye ya kokufa ekoki to soki akokende na bitumba.