18 Nzokande, soki Nzambe alimbisi moto masumu, ezalaka lisusu te na likabo ya kopesa mpo na masumu.
Pamba te, na nzela ya likabo moko kaka, akomisaki bato ya kokoka mpo na libela, ba-oyo apetolaki na masumu.
Bongo na sima, abakisaki : « Nakokanisa lisusu te, ezala masumu na bango to mabe na bango. »
Yango wana, bandeko na ngai, tozali solo na elikya ete tokokota na Esika-Oyo-Eleki-Bule mpo ete Yesu asopaki makila na Ye.
Soki ezalaki na makoki yango, mbele bato oyo bapesaka bambeka yango balingaki wuta kala kotika kopesa yango, pamba te balingaki kopetolama mbala moko mpo na libela, mpe balingaki lisusu komitungisa te mpo na masumu na bango.