17 Bongo na sima, abakisaki : « Nakokanisa lisusu te, ezala masumu na bango to mabe na bango. »
Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « nakosala boyokani ya sika elongo na bato ya Isalaele mpe ya Yuda ;
Moko te akoteya lisusu moninga na ye to ndeko na ye na koloba : ‹ Yeba Yawe ! › Pamba te bango nyonso bakoyeba Ngai, kobanda na mwana moke kino na mokolo, » elobi Yawe, « nakolimbisa mabe na bango mpe nakokanisa lisusu masumu na bango te. »
Nzokande, soki Nzambe alimbisi moto masumu, ezalaka lisusu te na likabo ya kopesa mpo na masumu.
nakolimbisa mabe na bango mpe nakokanisa lisusu masumu na bango te. › »