Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ba-Ebre 1:13 - Mokanda na Bomoi

13 Mpe lisusu, epai ya anjelu nini Nzambe aloba : « Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali kino nakomisa banguna na yo enyatelo makolo na yo ? »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ba-Ebre 1:13
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzembo ya Davidi. Maloba ya Yawe epai ya nkolo na ngai : « Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali kino nakomisa banguna na yo enyatelo makolo na yo. »


Nakoyokisa banguna na ye soni, mpe motole na ye ekongenga na mbunzu na ye. »


« Nkolo alobaki na Nkolo na ngai : ‹ Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali kino natia banguna na Yo na se ya matambe na Yo. › »


Pamba te Davidi, ye moko, alobaki boye na nzela ya Molimo Mosantu : « Yawe alobaki na Nkolo na ngai : ‹ Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali kino natia banguna na Yo na se ya matambe na Yo. › »


Kasi banguna na ngai wana, oyo baboyaki ete nakoma mokonzi na bango, bomemela ngai bango awa mpe boboma bango na miso na ngai. »


Davidi, ye moko, alobaki boye kati na buku ya banzembo : « Nkolo alobaki na Nkolo na ngai : ‹ Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali


Kasi lokola Etieni atondisamaki na Molimo Mosantu, atalaki na Likolo, amonaki nkembo ya Nzambe mpe Yesu atelema na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe.


Mwana yango amonisaka kongenga ya nkembo ya Nzambe, azali elilingi oyo etalisaka mobimba ya Nzambe mpe asimbi biloko nyonso na nguya ya Liloba na Ye. Sima na Ye kopetola masumu ya bato, avandi kati na Likolo, na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso,


Tango bamemaki bakonzi yango epai ya Jozue, abengisaki mibali nyonso ya Isalaele mpe alobaki na bakonzi ya basoda oyo bazalaki na ye elongo : « Bopusana mpe botia makolo na bino na bakingo ya bakonzi oyo. » Bakonzi ya basoda bapusanaki mpe batiaki makolo na bango na bakingo ya bakonzi yango.


Moto nyonso oyo kombo na ye ekomamaki te kati na buku ya bomoi abwakamaki kati na liziba ya moto.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ