12 Okolinga yango lokola kazaka, mpe bakolongola yango lokola elamba mpo na kotia elamba mosusu. Kasi Yo, ozali ndenge moko, mibu na Yo ekotikala kosuka te ! »
Tala ndenge nini Nzambe azali monene ! Tososolaka yango te. Moto moko te akoki kotanga motango ya mibu na Ye.
Na miso na Yo, mibu nkoto moko ezali lokola mokolo ya lobi oyo esili koleka, lokola ngonga moko ya butu.
Nzambe alobaki na Moyize : — Ngai nazali oyo akosala. Tala makambo oyo okoloba na bana ya Isalaele : « Nazali atindi ngai epai na bino. »
Mikolo ya bomoi esili, elongwe na bomoi na ngai ndenge balongolaka ndako ya kapo ya mobateli bibwele. Akati bomoi ngai ndenge motongi bilamba akataka basinga soki asilisi kotonga elamba. Longwa na moyi kino na butu, akomisi bomoi na ngai na suka.
Yesu azongisaki : — Nazali koloba na bino penza ya solo : liboso ete Abrayami abotama, Ngai nazali.
Yesu-Klisto azali ndenge moko : lobi oyo ewuti koleka, lelo, mpe libela na libela.
bolamu nyonso mpe likabo nyonso ya kitoko ewutaka kaka na Likolo, epai ya Tata ya pole, oyo, kati na Ye, molili ezalaka te, mpe abongwanaka te.