Nani asila komeka ebale monene kati na loboko na Ye, to likolo na nzela ya molayi ya misapi na Ye ? Nani asila kosangisa putulu nyonso ya mabele kati na katini moko to komeka kilo ya bangomba milayi na nzela ya ndobo to komeka kilo ya bangomba mikuse na nzela ya emekelo kilo ?
Ozali mpe kobosana Yawe, Mokeli na Yo, oyo atandaki likolo ndenge batandaka liputa mpe atongaki miboko ya mabele, mpo ete okoma kobika mikolo nyonso na kobanga liboso ya kanda ya banyokoli oyo babongisami mpo na kobebisama ? Pamba te, wapi kanda ya banyokoli ?
Botombola miso na bino na likolo, botala na se, na mabele ; likolo ekolimwa lokola milinga, mabele ekonuna lokola elamba, mpe bavandi na yango bakokufa lokola banzinzi. Kasi lobiko na ngai ekowumela seko na seko, bosembo na ngai ekotikala kokweya mokolo moko te.
Oh Yawe, tika ete kanda na Yo eleka ndelo te ; kokanisaka masumu na biso tango nyonso te ! Tala biso ndenge tozali kobondela, pamba te biso nyonso tozali bato na Yo.
Liloba na Yawe. Tala liloba oyo Yawe alobaki na tina na Isalaele. Yawe oyo atanda likolo mpe asala miboko ya mabele, Ye oyo atia Molimo na Ye kati na moto, alobi :