Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 9:7 - Mokanda na Bomoi

7 mpe bakitani nyonso ya Abrayami bazali bana na ye te. Pamba te Nzambe alobaki na Abrayami : « Ezali na nzela ya Izaki nde okozwa bakitani. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 9:7
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi Nzambe ayebisaki Abrayami : « Tika koyoka pasi na motema mpo na mwana na yo ya mobali mpe mwasi mowumbu na yo. Yoka nyonso oyo Sara azali koyebisa yo, pamba te ezali na nzela ya Izaki nde okozwa bakitani.


Bokanisa kutu te komilobela na se ya mitema : ‹ Abrayami azali koko na biso ! › Nazali koloba na bino penza ya solo ete Nzambe azali na makoki ya kobimisa, wuta na mabanga oyo, bakitani mpo na Abrayami.


Mozwi alobaki lisusu : « Te, tata Abrayami ! Kasi soki moto moko awuti na mboka ya bakufi mpe akei epai na bango, bakobongola mitema ! »


Bolakisa na nzela ya bizaleli ete bobongoli mitema, mpe bokoma te komilobela : ‹ Abrayami azali koko na biso ! › Pamba te, nazali koloba na bino penza ya solo ete Nzambe azali na makoki ya kobimisa, wuta na mabanga oyo, bakitani mpo na Abrayami.


Bazongiselaki Ye : — Biso, tozali bato ya libota ya Abrayami, totikala kozala te bawumbu ya moto ; ndenge nini oloba ete tokokoma bansomi ?


Mwana oyo mwasi mowumbu abotelaki Abrayami abotamaki na lolenge ya bomoto, kasi mwana oyo mwasi nsomi abotelaki ye abotamaki kolanda elaka ya Nzambe.


Nzokande bino bandeko na ngai, bozali bana ya elaka, lokola Izaki.


Biso nde tozali bato oyo bakatisa ngenga na solo, pamba te tosambelaka Nzambe na nzela ya Molimo na Ye, tomikumisaka kati na Yesu-Klisto mpe totiaka elikya na biso na nzoto te,


Nzambe alobaki na ye : « Ezali na nzela ya Izaki nde okozwa bakitani. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ