Soki Yawe, Mokonzi ya mampinga, abikisaki te ndambo ya bato kati na biso, tolingaki kokoma lokola engumba Sodome, tolingaki kokokana na engumba Gomore.
Soki ndambo moko kati na bandambo zomi ya bato ekotikala na mokili, bakobebisama na moto. Kasi ndenge terebente mpe nzete oyo babengaka sheni etikaka misisa na yango soki bakati yango, ndenge wana mpe nkona ya bule ekotika misisa na mokili.
Ndenge Sodome mpe Gomore ebebisamaki elongo na bingumba na yango ya zingazinga, » elobi Yawe, « moto moko te akovanda lisusu kuna, moko te akowumela kati na yango.
Ndenge Nzambe abebisaki Sodome mpe Gomore elongo na bingumba na yango ya zingazinga, › » elobi Yawe, « moto moko te akovanda lisusu kuna, moto moko te akowumela kati na yango.
Lisumu oyo bato na ngai basali ezali monene koleka lisumu ya Sodome, engumba oyo ebebisamaki na mbala moko wana moto moko te asembolaki loboko na ye mpo na kotelemela yango.
soki Nzambe apesaki na bingumba ya Sodome mpe Gomore etumbu na nzela ya moto oyo ezikisaki yango kino ekomaki putulu mpo na kopesa ndakisa ya etumbu oyo ekokweyela bato ya masumu
Ndenge moko mpe mpo na bato ya Sodome, ya Gomore mpe ya bingumba ya pembeni : basalaki ndenge moko na ba-anjelu, bamipesaki na pite mpe bazalaki kosangisa nzoto na ndenge oyo esengeli te. Bazali ndakisa mpo na bato oyo bazali komona pasi ya etumbu ya moto ya seko na seko.