Pamba te akata mokolo oyo akosambisa mokili mobimba na bosembo nyonso, na nzela ya moto oyo Ye asila kopona. Atalisaki bosolo na yango epai ya bato nyonso, na nzela ya kosekwisa moto yango kati na bakufi.
Pamba te pasi ekozala makasi, na lolenge oyo etikala nanu kozala te, wuta na ebandeli ya mokili kino sik’oyo, mpe na lolenge oyo ekotikala kozala lisusu te.
Sik’oyo, botika maseki na bino, noki te minyololo na bino ekokoma lisusu makasi ; pamba te Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, ayebisaki ngai ete asili kozwa mokano ya kobebisa mokili mobimba.
Oh Isalaele, ata bato na yo bazali ebele lokola zelo ya ebale monene, ndambo kaka nde bakozonga ; pamba te Nzambe azwi mokano ya kobebisa bato, akomema bosembo lokola mpela.