nakopambola yo solo mpe nakokomisa bakitani na yo ebele lokola minzoto ya likolo, mpe ebele lokola zelo ya ebale. Bakitani na yo bakokamata bingumba ya banguna na bango.
Boni, tozongela lisusu kobuka mibeko na Yo mpe kobalana na bato oyo basalaka makambo ya nkele ? Boni, kanda makasi na Yo ekopela te kino kosilisa koboma biso mpe kotikela biso moto ata moko te na bomoi ?
Kasi sik’oyo, oh Yawe, Nzambe na biso, na mwa tango moke, osaleli biso ngolu ya kobikisa ndambo ya bato kati na biso mpe ya kopesa biso esika kati na mokili na Yo ya bule. Na boye, Yo Nzambe na biso, ongengisi miso na biso na pole mpe opesi biso lisungi kati na bowumbu na biso.
Emoniseli oyo Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, amonaki na tina na mokili ya Yuda mpe ya engumba Yelusalemi tango Oziasi, Yotami, Akazi mpe Ezekiasi bazalaki bakonzi ya Yuda.
Soki Yawe, Mokonzi ya mampinga, abikisaki te ndambo ya bato kati na biso, tolingaki kokoma lokola engumba Sodome, tolingaki kokokana na engumba Gomore.
Na mokolo wana, Nkolo akosembola loboko na Ye na mbala ya mibale mpo na kobikisa ndambo ya bato na Ye oyo babikaki wuta na Asiri, na Ejipito, na Patrosi, na Kushi, na Elami, na Shineari, na Amati mpe na bisanga ya ebale monene.
Pamba te ekosalema kati na mokili mpe kati na bikolo ndenge esalemaka tango babukaka bambuma ya olive na nzete to tango balokotaka bambuma ya vino soki basilisi kobuka yango.
Kati na batikali ya Yuda oyo bayaki kovanda na Ejipito, moko te akobika to akotikala na bomoi, ata soki ayoki posa ya kozonga mpo na kovanda na mokili ya Yuda, bato moke kaka nde bakozonga. »
Bomata na bamir mpo na kokota na Yelusalemi mpe bobebisa yango ; kasi bobebisa yango nyonso te. Bokata bitape na yango, pamba te etikali lisusu ya Yawe te.