25 kolanda ndenge azali koloba kati na mokanda ya Oze : « Nakobenga bato oyo bazalaka ya Ngai te bato na Ngai, mpe nakobenga ye oyo azalaka molingami na Ngai te molingami na Ngai. »
Sima na mikolo, tango nalekelaki lisusu wana mpe namonaki yo, nasosolaki ete okokisi mibu ya libala. Nakamataki elamba na Ngai mpe nazipaki bolumbu na yo ; nalapaki ndayi ete nakosala boyokani ya libela elongo na yo, elobi Nkolo Yawe. Mpe na bongo, okomaki ya Ngai.
Epai na bino nyonso oyo, kati na Rome, bozali balingami ya Nzambe mpe bobengama mpo na kozala basantu : Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto !
Na kala, bozalaki bato ya Nzambe te ; kasi sik’oyo, bokomi bato na Ye penza. Na kala, Nzambe azalaki koyokela bino mawa te ; kasi sik’oyo, akomi penza koyokela bino mawa.