Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 9:21 - Mokanda na Bomoi

21 Mosali mbeki azali na bokonzi te ya kosala nzungu ya lokumu mpe nzungu oyo ezanga lokumu na nzela ya potopoto kaka moko ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 9:21
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe asalaka makambo nyonso na tina, ezala bato mabe, asala bango mpo na mokolo ya pasi.


Boni, epasola ekoki solo komimatisa liboso ya moto oyo asalelaka yango ; si ya mabaya ekoki solo komikumisa liboso ya moto oyo asalelaka yango ? Bosila komona fimbu koningisa moto oyo asalelaka yango to etape ya nzete kotombola nzete na yango ?


Mawa na ye oyo abetaka tembe na Mokeli na ye, ye oyo azali kaka mbeki kati na bambeki ya mabele ! Boni, potopoto ekoki solo koloba na moto oyo asali yango : ‹ Ozali kosala nini ? › Mpe mosala ya maboko na yo ekoki solo koloba : ‹ Azali na maboko te ? ›


Oh Yawe, tika ete kanda na Yo eleka ndelo te ; kokanisaka masumu na biso tango nyonso te ! Tala biso ndenge tozali kobondela, pamba te biso nyonso tozali bato na Yo.


Boni, moto oyo, Konia, azali te mbeki ya kopasuka oyo etiolama to eloko oyo ezanga tina ? Mpo na nini babengana ye elongo na bana na ye mpe babwaka bango na mokili oyo bayebi te ?


Isalaele abebisami ; tala bango wana kati na bikolo, bazali komonana lokola biloko pamba !


Kasi Nkolo alobaki na Ananiasi : — Kende, pamba te nasila kopona moto wana lokola esalelo na Ngai mpo na kosakola Kombo na Ngai epai ya bikolo ya bapaya, epai ya bakonzi na bango mpe epai ya bana ya Isalaele.


Nzokande, liboso ete mapasa yango babotama mpe basala likambo moko ya malamu to ya mabe, mpo ete mabongisi ya lolenge Nzambe aponaka ekokisama,


Boye Nzambe asalaka ngolu na moto oyo Ye asepeli kosalela ngolu, mpe ayeisaka motema libanga moto oyo Ye asepeli koyeisa motema libanga.


Oh moto, ozali nani mpo ete obeta tembe na Nzambe ? Mbeki ya mabele ekoki solo koloba na moto oyo asali yango : « Mpo na nini osali ngai na lolenge oyo ? »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ