Kasi mokonzi alobaki : — Bino bana mibali ya Tseruya, yo Abishayi mpe ndeko na yo, Joabi, likambo nini kati na ngai mpe bino ? Soki azali kolakela ngai mabe, ezali nde na ndingisa ya Yawe mpo ete alobi na ye : « Lakela Davidi mabe. » Nani sik’oyo akoki kotuna : « Mpo na nini ozali kosala bongo ? »
Boni, epasola ekoki solo komimatisa liboso ya moto oyo asalelaka yango ; si ya mabaya ekoki solo komikumisa liboso ya moto oyo asalelaka yango ? Bosila komona fimbu koningisa moto oyo asalelaka yango to etape ya nzete kotombola nzete na yango ?
Oh Yawe, tika ete kanda na Yo eleka ndelo te ; kokanisaka masumu na biso tango nyonso te ! Tala biso ndenge tozali kobondela, pamba te biso nyonso tozali bato na Yo.
— Oh bana ya Isalaele, nakoki kosala bino te ndenge mosali mbeki oyo azali kosala, elobi Yawe ? Bana ya Isalaele, bozali te kati na maboko na Ngai lokola mabele oyo basalelaka bikeko kati na maboko ya mosali mbeki ?
Oh moto, bateyaki yo makambo oyo ezali malamu. Mpe tala makambo oyo Yawe azali kosenga epai na yo : Tambola na bosembo, linga boboto mpe tambola elongo na Nzambe na yo na komikitisa.
Boni, ozali nani mpo na kosambisa mosali ya moto mosusu ? Atelema to akweya, ezali likambo ya nkolo na ye. Tembe ezali te, akotelema kaka, pamba te Nkolo na ye azali na makoki ya kotelemisa ye.
Okoloba nini soki Nzambe, mpo na kolakisa kanda mpe nguya na Ye, ayikelaki mingi mpiko mbeki oyo etumbolaka kanda na Ye, mbeki oyo ebongisami mpo na kobebisama ?
mpe tembe oyo esilaka te kati na bato oyo mayele na bango ebeba, oyo bayebaka lisusu solo te mpe bakanisaka ete kozala sembo epai na Nzambe ezali nzela ya kozwa bomengo.
Kati na ndako ya monene, ezalaka kaka te na basani ya wolo mpe ya palata, kasi ezalaka mpe na basani oyo basala na nzete to na mabele. Basani ya wolo mpe ya palata ezalaka mpo na koyamba bato ya lokumu, kasi basani ya nzete mpe ya mabele ezalaka mpo na misala ya bongo na bongo.