Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 9:19 - Mokanda na Bomoi

19 Bato bakoki koloba : « Mpo na nini Nzambe apamelaka biso, pamba te moto moko te akoki kotelemela mokano na Ye ? »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 9:19
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bino bokanisaki kosala ngai mabe, kasi Nzambe abongolaki yango bolamu mpo na kokokisa, ndenge ezali kosalema sik’oyo, lobiko ya bomoi ya bato ebele.


Asambelaki : « Oh Yawe, Nzambe ya bakoko na biso ! Ezali Yo te Nzambe oyo azali kati na likolo ? Ezali Yo te oyo okonzaka bikolo nyonso ya mokili ? Nguya mpe makasi ezali kati na loboko na Yo, mpe moko te akoki kotelemela Yo !


Soki ezali likambo oyo esengi makasi, Ye nde Nkolo-Na-Nguya ! Mpe soki ezali likambo ya bosembo, nani akoki kosambisa Ye ?


tango, Yo Nzambe, otelemaka mpo na kosambisa mpe kobikisa banyokolami nyonso ya mokili.


Bozali nde kobongola makambo ! Ezali lokola bozali kozwa mosali mbeki ndenge moko na mabele oyo basalelaka mbeki. Boni, eloko ekoki solo koloba na mosali na yango : « Asalaki ngai te ? » Mbeki ekoki solo koloba na mosali mbeki : « Ozali mayele te ? »


Solo, Mwana na Moto akokende, kolanda ndenge ekomama na tina na Ye ; kasi mawa na moto oyo akoteka Mwana na Moto ! Elingaki kozala malamu koleka mpo na moto yango ete abotama te.


akabamaki na maboko na bino kolanda mokano oyo Nzambe asila kozwa na mabongisi na Ye wuta kala. Bongo bino, na lisungi ya bato mabe, bobomaki Ye na kobaka Ye na ekulusu.


Okoki mpe koloba : « Bitape wana ekatamaki mpo ete bakangisa ngai na esika na yango. »


Nzokande, soki toteyaka ete Klisto asekwaki kati na bakufi, ndenge nini bato mosusu kati na bino balobaka ete bakufi bakosekwa te ?


Kasi bato mosusu bakoki kotuna : « Bakufi bakosekwa ndenge nini ? Bakozonga na bomoi na nzoto nini ? »


Tika ete moto moko te, liboso ya komekama, aloba : « Nzambe nde azali kotindika ngai na kosala mabe. » Pamba te mabe ekoki te kotindika Nzambe na mabe, mpe Nzambe atindikaka moto moko te na kosala mabe.


Nzokande moto mosusu akoki koloba : « Yo ozali na kondima ; kasi ngai, nazali na misala. » Lakisa ngai kondima na yo, oyo ezangi misala ; mpe ngai nakolakisa yo kondima na ngai na nzela ya misala na ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ