Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 9:18 - Mokanda na Bomoi

18 Boye Nzambe asalaka ngolu na moto oyo Ye asepeli kosalela ngolu, mpe ayeisaka motema libanga moto oyo Ye asepeli koyeisa motema libanga.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 9:18
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe alobaki na Moyize : « Kende epai ya Faraon, pamba te nakomisi motema na ye mpe ya bakalaka na ye makasi, mpo ete nasala bilembo na Ngai ya kokamwa kati na bango,


Kasi Yawe akomisaki lisusu motema ya Faraon makasi mpe Faraon aboyaki kotika bana ya Isalaele kokende.


Kasi Yawe akomisaki lisusu motema ya Faraon makasi ; mpe Faraon aboyaki kaka kotika bango kokende.


Boye Moyize mpe Aron basalaki bikamwa wana nyonso liboso ya Faraon. Kasi Yawe akomisaki motema ya Faraon makasi mpe Faraon aboyaki kaka kotika bana ya Isalaele kobima na mokili na ye.


Bongo Ngai, nakoyeisa motema ya bato ya Ejipito libanga mpo ete balanda bino mpe nakomonisa nkembo na Ngai na kotelemela Faraon mpe mampinga na ye nyonso elongo na bashar na ye mpe bato na ye oyo batambolisaka bampunda.


Nakokomisa motema ya Faraon libanga, mpe ye akolanda bango ; kasi nakomonisa nkembo na Ngai, nakotelemela Faraon mpe mampinga na ye ; bongo bato ya Ejipito bakoyeba ete Ngai nazali Yawe. » Bana ya Isalaele basalaki bongo.


Yawe alobaki na Moyize : — Sik’oyo, lokola ozali kozonga na Ejipito, tala bikamwa nyonso oyo napesi yo nguya ya kosala ; okosala yango liboso ya Faraon. Ngai nakokomisa motema na ye libanga mpo ete akoka kotika te bato na Ngai kokende.


Atako bongo, motema ya Faraon ekomaki lisusu makasi ; mpe aboyaki koyokela bango, ndenge kaka Yawe alobaki.


Kasi Ngai, nakokomisa motema ya Faraon makasi lokola libanga, nakosala bilembo mpe bikamwa ebele na Ejipito.


Kasi Yawe akomisaki lisusu motema ya Faraon makasi mpe Faraon ayokelaki te Moyize mpe Aron, ndenge kaka Yawe alobaki yango na Moyize.


Faraon atindaki bato mpo na kolandela likambo oyo mpe bamonaki ete ata ebwele moko te kati na bibwele ya bana ya Isalaele ekufaki. Atako bongo, Faraon ayeisaki lisusu motema na ye makasi mpe aboyaki kaka kotika bato kokende.


Yawe, mpo na nini kotika biso koyengayenga mosika ya nzela na Yo ? Mpo na nini kokomisa mitema na biso makasi mpo ete totosa Yo te ? Zongisa motema sima mpo na bolamu ya basali na Yo, mabota ya libula na Yo !


« Azipaki miso na bango mpe akomisaki bango mitema makasi, mpo ete bamona te na miso na bango, basosola te na mitema na bango, babongola mitema te, mpe ngai nabikisa bango te. »


Bandeko, nalingi ete boyeba mabombami oyo mpo ete bomimona te ete boleki na bwanya : ndambo ya bana ya Isalaele bakowumela kozala mitema libanga kino Bapagano nyonso bakokota na libota ya Nzambe.


mpo ete tosanzola nkembo ya ngolu na Ye, oyo akabeli biso kati na Molingami na Ye.


Kasi Sikoni, mokonzi ya Eshiboni, aboyaki kopesa biso nzela ya kolekela na mokili na ye, pamba te Yawe, Nzambe na bino, akomisaki moto na ye makasi mpe motema na ye libanga, mpo na kokaba ye na maboko na bino ndenge asali lelo.


Nzokande, Yawe Ye moko azalaki koyeisa bango mitema mabanga mpo ete babundisa Isalaele, mpe mpo ete Isalaele asilisa koboma bango nyonso na mawa te, ndenge Yawe atindaki Moyize.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ