Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 9:16 - Mokanda na Bomoi

16 Boye, yango ewuti te na posa to na makasi ya moto, kasi ewuti na Nzambe oyo asalaka ngolu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 9:16
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na mokolo oyo okotanda basoda na yo na molongo mpo na bitumba, bato na yo bakotonda na mpiko, bilenge basoda na yo nyonso bakoya na lombangu epai na yo ndenge mamwe ebimaka na tongo.


« Namimonisaki, Ngai moko, epai ya bato oyo bazalaki kotuna Ngai kutu toli te, namilakisaki epai ya bato oyo bazalaki koluka Ngai te. Epai ya ekolo oyo ezalaki kobelela Kombo na Ngai te, nalobaki : ‹ Ngai oyo, Ngai oyo ! ›


Tata na Ngai apesa Ngai biloko nyonso. Moko te ayebi Mwana longola kaka Tata, mpe moko te ayebi Tata longola kaka Mwana mpe ye oyo epai ya nani Mwana asepeli kotalisa Tata.


Satana amemaki Ye lisusu na likolo ya ngomba oyo eleki molayi mpe alakisaki Ye bokonzi nyonso ya mokili elongo na lokumu na yango ;


Kaka na tango yango, awa Molimo Mosantu atondisaki Ye na esengo, Yesu alobaki : — Oh Tata, Nkolo ya Likolo mpe ya mabele, nakumisi Yo ! Pamba te obombaki makambo oyo, mpo ete bato ya bwanya mpe bato ya mayele bayeba yango te, kasi olakisi yango na bana mike. Iyo, Tata, pamba te yango nde osepelaki kosala.


Mopepe epepaka esika nyonso oyo elingi kopepa ; atako oyoki makelele na yango, kasi okokaka te koloba soki ewuti wapi to ezali kokende wapi. Ezali mpe bongo mpo na moto nyonso oyo abotami na Molimo.


Nzokande, liboso ete mapasa yango babotama mpe basala likambo moko ya malamu to ya mabe, mpo ete mabongisi ya lolenge Nzambe aponaka ekokisama,


Nakendeki kuna mpo na kotosa emoniseli oyo nazwaki. Natalisaki na bakambi Sango Malamu oyo nateyaka kati na Bapagano, na esika oyo tozalaki kaka biso moko mpo nalingaki ete mosala oyo nazalaki kosala mpe oyo nasilaki kosala ezwama na motuya.


Pamba te bobikisami nde na ngolu, na nzela ya kondima—mpe yango ewuti na bino te, kasi ezali nde likabo kowuta na Nzambe—


pamba te ezali Nzambe nde apesaka posa mpe makoki ya kosala makambo nyonso, ndenge ezali mabongisi na Ye ya bolingo.


Akomisaki biso bana na Ye na nzela ya Liloba ya bosolo, na mokano na Ye moko, mpo ete tozwa esika ya liboso kati na bikelamu na Ye nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ