Tango bitape na yango ekokawuka, ekobukana ; basi bakoya kotia yango na moto. Mpo ete bato oyo bazangi mayele, yango wana Mokeli na bango ayokelaki bango mawa te, Mozalisi na bango atalisaki bango ngolu na Ye te.
Nzambe nini akokani na Yo, Yo oyo olimbisaka masumu ya bato mpe obosanaka mabe ya batikali kati na libula na Yo ? Okangelaka bato kanda mpo na libela te, kasi osepelaka kotalisa bango ngolu.