10 Esukaki kaka wana te : Rebeka mpe abotaki bana mibali mibale na nzela ya tata moko, Izaki, koko na biso.
Lisusu, libulu moko monene ekaboli biso mpe bino, mpo ete moto nyonso oyo alingi kolongwa awa epai biso tozali mpo na kokende epai na bino, akoka te ; mpe ete moto nyonso oyo alingi kokatisa libulu yango longwa kuna epai bino bozali mpo na koya awa epai na biso, akoka mpe te. »
Yango kaka te ! Tozali mpe komikumisa kati na Nzambe na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, oyo azongisi boyokani na biso elongo na Nzambe.
Tozali mpe komikumisa kati na pasi, pamba te toyebi ete pasi ebotaka koyika mpiko,