Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 9:1 - Mokanda na Bomoi

1 Nazali koloba solo kati na Klisto, nazali kokosa te mpe motema na ngai ezali koyebisa ngai solo na nzela ya Molimo Mosantu :

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 9:1
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe oyo nasalelaka na motema na ngai mobimba tango nateyaka Sango Malamu ya Mwana na Ye, azali Motatoli na ngai ete natikaka te kotanga kombo na bino


Na bongo, na nzela ya bizaleli na bango, balakisaka ete misala oyo Mobeko esengaka ezali ya kokomama kati na mitema na bango. Mitema na bango etatolaka yango, ndenge moko na makanisi oyo na nzela na yango bamifundaka to bamilongisaka.


Molimo Ye moko atatolaka na molimo na biso ete tozali bana na Nzambe.


motema na ngai etondi na mawa mpe na pasi oyo ezali kosila te.


Tala likambo oyo tokoki komikumisa na yango : mitema na biso ezali kotatola ete, kati na mokili mpe mingi penza na miso na bino, totambolaki na bosantu mpe na bosolo oyo ewutaka na Nzambe. Totambolaki bongo na bwanya ya bomoto te, kasi na ngolu ya Nzambe.


Nazali kolapa ndayi na Kombo ya Nzambe mpe likolo ya bomoi na ngai ete ezalaki te mpo na kolukela bino mindondo nde nazongaki lisusu te na Kolinto ;


Lokola solo ya Klisto ezali kati na ngai, moto moko te kati na etuka ya Akayi akobotola ngai lokumu yango.


Nzambe mpe Tata ya Nkolo Yesu, Ye oyo akumisama mpo na seko, ayebi ete nazali kokosa te.


Bokanisi ete, wuta kala, biso tolukaka komilongisa liboso na bino ? Te, balingami na ngai ! Ezali liboso ya Nzambe, kati na Klisto, nde tolobaka mpe tosalaka makambo nyonso mpo na kokolisa kondima na bino.


Nzambe azali Motatoli na ngai ete makambo oyo nazali kokomela bino ezali ya lokuta te.


Nzambe azali Motatoli na ngai ete nalingaka bino nyonso makasi, na bolingo ya Yesu-Klisto.


Boyebi malamu ete tosalelaki maloba ya sukali te mpe totindikamaki te na posa ya konduka mbongo. Na tina na likambo oyo, Nzambe azali penza Motatoli na biso.


Tina ya mitindo yango ezali bolingo oyo ewuti na motema ya peto, na makanisi ya malamu mpe na kondima ya solo.


Ezali mpe mpo na litatoli yango nde Nzambe atiaki ngai mopanzi sango mpe ntoma, mpo na kolakisa kondima mpe solo epai ya Bapagano. Nazali kokosa te, nazali nde koloba solo.


Liboso ya Nzambe, ya Yesu-Klisto mpe ya ba-anjelu oyo baponama, napesi yo mokumba ya kobatela mitindo oyo na kozanga kopona bilongi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ