Nakeyi, kasi natikeli bino kimia ; napesi bino kimia na Ngai. Nazali kopesa bino te ndenge mokili epesaka. Tika ete mitema na bino etungisama te mpe bobanga te !
Solo, wana tozalaki nanu banguna ya Nzambe, Ye moko Nzambe azongisaki boyokani na biso elongo na Ye na nzela ya kufa ya Mwana na Ye. Boye lokola azongisi boyokani yango, akobikisa biso mpe na nzela ya bomoi ya mwana na Ye.
Pamba te wana tozalaki nanu kotambola kolanda baposa ya nzoto, Mobeko ezalaki kotindika biso na baposa ya mabe oyo ezalaki kosala mosala na yango kati na biteni ya banzoto na biso mpo ete tobota bambuma oyo ememaka na kufa.
Pamba te soki botamboli kolanda baposa ya nzoto bokokufa ; kasi soki bobomi, na nzela ya Molimo, misala mabe oyo bosalaka kati na banzoto na bino, bokozala na bomoi.