Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 8:4 - Mokanda na Bomoi

4 Asalaki bongo mpo ete bosembo oyo Mobeko esengaka ekokisama kati na biso oyo totambolaka te kolanda baposa ya nzoto, kasi kolanda Molimo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 8:4
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bango mibale bazalaki bato ya sembo liboso ya Nzambe, bazalaki kotosa, na ndenge esengeli, mibeko nyonso mpe mitindo nyonso ya Nkolo.


Kasi soki moto oyo akatisa ngenga te azali kotosa malako ya sembo ya Mobeko, boni, akotangama te lokola moto akatama ngenga ?


Boni, tobomi Mobeko likolo ya kondima ? Soki moke te ! Tozali kutu kolendisa yango.


Nabondeli bino, tango nakoya epai na bino, bopesa ngai nzela te ya kosalela makambo makasi oyo nazali kokanisa kolakisa epai ya bato oyo bakanisaka ete biso totambolaka na mosuni.


Pamba te atako ezali penza ya solo ete tozali bato, mpe tozali kobika bomoi na biso kati na nzoto, kasi tobundaka te kolanda nzoto.


Boye, tala makambo oyo nazali koloba na bino : Botambola kolanda baposa ya Molimo, mpe bokokokisa te baposa ya bomoto na bino.


Kasi sik’oyo, Nzambe azongisi boyokani kati na Ye mpe bino na nzela ya kufa ya Yesu, Mwana na Ye, oyo akabaki nzoto na Ye ya bomoto lokola mbeka mpo na kotalisa bino epai ya Nzambe lokola bato ya bule, bazanga pamela mpe bazanga mbeba.


pene ya lisanga ya bana liboso ya Nzambe, ba-oyo bakombo na bango ekomama kati na Likolo ; pene ya Nzambe, Mosambisi ya bato nyonso ; pene ya milimo ya bato ya sembo oyo Nzambe akomisaki bato ya kokoka ;


Balingami na ngai, tozali sik’oyo bana na Nzambe ; kasi oyo tokokoma emonisami nanu te. Nzokande, toyebi solo ete tango Klisto akomimonisa, tokokoma lokola Ye ; pamba te tokomona Ye ndenge penza Ye azalaka.


Epai na Ye oyo azali na makoki ya kobatela bino mpo ete bokweya te, mpe ya kotelemisa bino liboso ya nkembo na Ye lokola bato oyo bazangi mbeba mpe bato ya esengo monene ;


Lokuta emonanaki te kati na minoko na bango ; bazali bato bazanga pamela.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ