Sima na yango nde suka ekoya, tango Klisto akozongisa bokonzi na maboko ya Ye oyo azali Nzambe mpe Tata, sima na Ye kobebisa lokumu nyonso, bokonzi nyonso mpe nguya nyonso.
na likolo ya milimo nyonso, ya bokonzi nyonso, ya nguya nyonso, ya bokasi nyonso, mpe ya kombo nyonso oyo bato bakoki kotanga, na tango oyo kaka te kasi mpe na tango oyo ekoya.
pamba te ezali na nzela na Yesu nde nyonso ekelama kati na Likolo mpe na mabele, bikelamu oyo emonanaka mpe oyo emonanaka te, milimo mpe bokonzi ya milimo, bakonzi ya milimo mpe banguya. Ezali na nzela na Yesu mpe mpo na Yesu nde nyonso ekelama.
Asilisaki makasi ya milimo mabe mpe ya nguya ya bakonzi ya molili, asambwisaki yango na miso ya bato nyonso mpe atambolisaki yango lokola bakangami ya etumba tango alongaki yango na ekulusu.
Ezali mpe mpo na Sango Malamu yango nde nazali komona pasi oyo. Kasi atako bongo, nazali koyoka soni te, pamba te nayebi nani oyo ngai nandimela, mpe nazali na elikya ete azali na makoki ya kobatela nyonso oyo apesa ngai, kino na mokolo wana.
Bato nyonso wana bakufaki kati na kondima mpe batikalaki kozwa te biloko oyo Nzambe alakaki bango, kasi bamonaki yango kaka na mosika mpe bapesaki yango mbote. Bandimaki ete bazali solo bapaya mpe baleki nzela kati na mokili.