Banyokolaki ye mpe bamonisaki ye pasi, kasi atikalaki kofungola monoko na ye te lokola mpate oyo bazali komema na esika oyo babomelaka banyama, lokola meme liboso ya bato oyo bazali kolongola yango bapwale ; akangaki monoko na ye.
Ngai namonanaki lokola mwana meme oyo bazali komema na esika oyo babomelaka bibwele ; nayebaki te ete bazali kosalela ngai likita tango bazalaki koloba : « Tika ete tobebisa nzete mpe mbuma na yango, tika ete tolongola ye na mokili ya bato ya bomoi mpo ete bakanisa lisusu kombo na ye te. »
Tala eteni ya Makomi oyo azalaki kotanga : « Lokola mpate oyo bazali komema na esika oyo babomelaka banyama, lokola meme liboso ya moto oyo azali kolongola yango bapwale, afungolaki monoko na ye te.
Pamba te nakanisi ete, biso bantoma, Nzambe atia biso na suka ya molongo lokola bato oyo bakatela bango etumbu ya kufa na libanda ya masano. Mpo na mokili mobimba, mpo na ba-anjelu mpe mpo na bato, Nzambe akomisa biso lokola lisano ya kotala.
Solo, tomonaki kaka ete basili kokatela biso etumbu ya kufa. Nzokande, ezalaki mpo ete tolongola elikya na bomoto na biso, kasi tozala na elikya nde na Nzambe oyo asekwisaka bakufi.
Bazali basali ya Klisto ? —Nazali koloba lokola moto ya liboma— Ngai naleki bango. Pamba te nasalaki makasi penza, nakotaki mbala mingi na boloko, babetaki ngai mingi, nakutanaki na makama ya kufa mbala mingi.