Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 8:32 - Mokanda na Bomoi

32 Ye oyo aboyaki te kopesa Mwana na Ye se moko, kasi akabaki Ye mpo na biso nyonso, ndenge nini azanga kopesa biso biloko nyonso elongo na Ye na nzela ya ngolu ?

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 8:32
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Anjelu alobaki : — Kosembola loboko na yo te likolo ya mwana, kosala ye mabe te. Nasosoli sik’oyo ete otosaka Nzambe, pamba te oboyi te kopesa Ngai mwana na yo ya mobali, mwana na yo se moko.


Lokola kovanda mokolo moko kati na lopango na Yo eleki kovanda mikolo nkoto moko na esika mosusu, naponaki kotelema na ekotelo ya Ndako ya Nzambe na ngai na esika ete navanda kati na bandako ya kapo ya bato mabe.


Nzokande, ezalaki mokano na Yawe ete anyokwama na nzela ya pasi. Atako Yawe akomisaki bomoi na ye mbeka mpo na masumu, akomona bakitani na ye mpe mikolo na ye ekobakisama ; bongo mokano na Yawe ekolongisama na loboko na ye.


Bongo, mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo mpe elobaki : « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi. »


Soki bino bato oyo bozali kutu mabe boyebi kopesa na bana na bino biloko ya malamu, ndenge nini Tata na bino oyo azali na Likolo apesa te biloko ya kitoko epai ya bato oyo basengaka Ye yango ?


Pamba te Nzambe alingaki mokili mingi penza, yango wana apesaki Mwana na Ye se moko, mpo ete moto nyonso oyo akondima Ye akufa te kasi azwa bomoi ya seko.


Pamba te soki Nzambe azangaki te kokata bitape oyo ebimaka yango moko na nzete, akozanga mpe te kokata yo.


oyo akabamaki mpo na masumu na biso mpe asekwaki mpo ete tokoma bato ya sembo.


Pamba te lifuti ya lisumu ezali kufa, kasi likabo ya ofele ya Nzambe ezali bomoi ya seko kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso.


Mpe toyebi malamu ete kati na makambo nyonso, Nzambe asalaka mpo na bolamu ya bato oyo balingaka Ye, ba-oyo babengama kolanda mabongisi na Ye.


Nzokande biso, tozwaki molimo ya mokili te, kasi tozwaki Molimo kowuta na Nzambe, mpo ete tokoka kososola biloko oyo Nzambe apesi biso na nzela ya ngolu.


Makambo oyo nyonso ezali mpo na litomba na bino, mpo ete ngolu efuluka koleka kati na bato ebele, mpe ete losambo ya kozongisa matondi ekoma mingi mpo na nkembo ya Nzambe.


Ye oyo atikalaki kozala na lisumu te, Nzambe akomisaki Ye lisumu mpo na biso, mpo ete tokoma bosembo ya Nzambe kati na Ye. »


koyebana lokola bato na mawa, nzokande tozalaka na esengo tango nyonso ; koyebana lokola babola, nzokande tokomisaka bato ebele bazwi ; koyebana lokola bato bakelela, nzokande tozali na nyonso.


Bolingo yango emonani na likambo oyo : ezali biso te bato tolingaki Nzambe, kasi Ye nde alingaki biso mpe atindaki Mwana na Ye mpo ete azala mbeka mpo na bolimbisi masumu na biso.


Yango nde ekozala libula ya moto oyo akolonga. Nakozala Nzambe na ye, mpe ye akozala mwana na Ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ