Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 8:27 - Mokanda na Bomoi

27 Mpe Nzambe oyo akundolaka mozindo ya mitema ayebi makanisi ya Molimo, pamba te Molimo abondelaka mpo na basantu kolanda mokano ya Nzambe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 8:27
28 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo, yo Salomo, mwana na ngai, yeba Nzambe ya tata na yo mpe salela Ye na motema na yo mobimba mpe na esengo ; pamba te Yawe amonaka kino na bozindo ya mitema nyonso mpe asosolaka makanisi na yango nyonso. Soki oluki Ye, okomona Ye ; kasi soki atiki Ye, akobwaka yo mpo na libela.


Oh Nzambe na ngai, nayebi ete oyebi bozindo ya mitema na biso, osepelaka na bosembo. Napesi nyonso oyo wuta na mokano ya motema na ngai moko mpe na makanisi ya lokuta te. Sik’oyo, namoni ndenge nini bato na Yo, oyo bazali awa, bapesi Yo makabo oyo na motema malamu.


Wuta na buku ya mokambi ya bayembi. Nzembo ya Davidi. Yawe, omonaka mozindo ya bomoi na ngai mpe oyebi ngai malamu ;


Nalembi, makasi na ngai nyonso esili ; mobulu ekoti na motema na ngai, nakomi koganga na kolemba te.


Soki tobosanaki Kombo ya Nzambe na biso to totombolaki maboko na biso epai ya nzambe ya mopaya,


Tika ete Yawe asambisa bikolo. Yawe, longisa ngai kolanda bosembo na ngai, kolanda bozangi pamela na ngai, Yo-Oyo-Oleki-Likolo.


Bapetolaka palata na kikalungu, mpe bapetolaka wolo na fulu ya moto makasi, kasi ezali Yawe nde amekaka mitema.


Kasi Yo, Yawe, Mokonzi ya mampinga, Yo oyo osambisaka na bosembo mpe omekaka mitema mpe makanisi, sala ete namona mabe oyo okozongisela bango, pamba te natiki likambo na ngai na maboko na yo.


« Ngai Yawe, nayebi motema mpe nasosolaka malamu makanisi na yango, mpo na kofuta moto na moto kolanda etamboli mpe misala na ye. »


Eh Yawe, Mokonzi ya mampinga, Yo oyo omonaka mitema ya bayengebene mpe oyebaka malamu makanisi ya mitema ya bato, tika ete namona Yo kozongisela bango mabe, pamba te napesi likambo na ngai na maboko na Yo !


Bosalaka lokola bango te, pamba te Tata na bino ayebi posa na bino liboso ete botalisa Ye yango.


Kasi Yesu alobaki na bango : — Bino, bozali penza bato oyo bomilakisaka na miso ya bato mosusu lokola nde bozali bato ya sembo, nzokande Nzambe ayebi mitema na bino ; pamba te oyo bato bamonaka motuya makasi, Nzambe ayokaka yango nkele.


Mpe nakosala nyonso oyo bokosenga na Kombo na Ngai, mpo ete Tata azwa lokumu kati na Mwana.


Bongo Yesu atunaki ye mpo na mbala ya misato : — Simona, mwana mobali ya Yoane ; boni, olingaka Ngai ? Petelo ayokaki mawa mingi kati na motema mpo ete ekomaki mbala ya misato oyo Yesu atunaki ye : « Olingaka Ngai ? » Bongo azongiselaki Yesu : — Nkolo, oyebi makambo nyonso ; oyebi malamu ete nalingaka Yo ! Yesu alobaki na ye : — Batela bameme na Ngai.


Bongo basambelaki boye : « Oh Nkolo, Yo oyo oyebi mitema ya bato nyonso, lakisa biso nani oyo oponi kati na bato oyo mibale,


Bongo, Nzambe oyo ayebi mitema ya bato alakisaki ete andimaki bango na nzela ya kopesa bango Molimo Mosantu, ndenge kaka apesaki biso.


Nani akokatela bango etumbu ? Moko te ! Yesu-Klisto akufaki ; kutu, asekwaki, azali na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe, mpe azali kobondela mpo na biso.


Baposa ya nzoto ememaka na kufa, kasi baposa ya Molimo ememaka na bomoi mpe na kimia.


Pamba te na nzela na Ye, biso mpe bango tokotaka epai ya Tata kati na Molimo moko.


Kasi ezali mpo ete Nzambe amekaki biso mpe amonaki ete tobongi mpo na kopesamela mokumba ya koteya Sango Malamu. Yango wana mpe toteyaka te mpo na kosepelisa bato, kasi mpo na kosepelisa Nzambe oyo ayebi mozindo ya mitema na biso.


Kati na bikelamu nyonso, moko te ezali ya kobombama na miso ya Nzambe : nyonso ezali polele, mpe ezali ya kobombama te na miso ya Ye oyo akosambisa biso.


Yango wana, tika ete moko na moko ayambola masumu na ye epai ya moninga na ye, mpe tika ete moko na moko abondela mpo na moninga na ye, mpo ete bobikisama na bokono. Libondeli ya moto ya sembo ezali na nguya makasi mpe esalaka makambo ya kokamwa.


Nakoboma bana ya Jezabeli ; bongo Mangomba nyonso ekondima ete Ngai nazali penza Ye oyo akundolaka mozindo ya mitema mpe ya milimo ya bato. Nakofuta moko na moko na bino kolanda etamboli na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ