Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 8:23 - Mokanda na Bomoi

23 Ezali yango moko kaka te nde ezali kolela ; kasi biso ba-oyo mpe tozwaki Molimo lokola mbuma ya liboso tozali mpe komona pasi kati na mitema, wana tozali kozela na posa makasi ete Nzambe akomisa biso bana na Ye penza mpe asikola banzoto na biso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 8:23
26 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango kaka bapanzaki sango ya mitindo oyo, bato ya Isalaele bapesaki na esengo bambuma na bango ya liboso ya ble, ya vino ya sika, ya mafuta, ya mafuta ya nzoyi mpe ya biloko nyonso oyo ebimaka na bilanga. Bamemaki lisusu biloko ebele lokola eteni ya zomi ya nyonso.


mpe bakokufa lisusu te, pamba te bazali lokola ba-anjelu. Bazali bana na Nzambe mpo ete basekwi kati na bakufi.


Tango makambo wana ekobanda kosalema, botelema, botombola mito mpe boyika mpiko, pamba te lisiko na bino ekomi pene.


Yango kaka te ! Tozali mpe komikumisa kati na Nzambe na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, oyo azongisi boyokani na biso elongo na Nzambe.


Tozali mpe komikumisa kati na pasi, pamba te toyebi ete pasi ebotaka koyika mpiko,


Nzokande, elikya ekosaka te, pamba te Nzambe asopaki bolingo na Ye kati na mitema na biso na nzela ya Molimo Mosantu oyo Ye Nzambe apesaki biso.


Oh ngai moto na mawa ! Nani akokangola ngai na nzoto oyo ya kufa ?


Pamba te bikelamu nyonso ezali kozela na posa makasi ete bana na Nzambe bamonisama.


Boye, bozangi ata likabo moko te ya ngolu ya Nzambe, wana bozali kozela na posa makasi komonisama ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto.


abetaki biso kashe na Ye lokola libula na Ye, mpe atiaki Molimo na Ye kati na mitema na biso lokola ndanga ya biloko oyo akopesa biso.


Pamba te, tango kaka tokomaki na Masedwane, tozwaki ata tango ya kopema te ; tokutanaki na pasi ya lolenge nyonso : bitumba na libanda, mpe bobangi kati na mitema na biso.


Kasi biso, na lisungi ya Molimo, tozali kozela na elikya kokoma sembo na nzela ya kondima.


lokola ndanga ya libula na biso kino basikolami na Ye bakangolama mpo na kosanzola nkembo na Ye.


Boyokisaka Molimo Mosantu ya Nzambe mawa te ; pamba te, na nzela ya Molimo yango, Nzambe abetaki bino kashe na Ye mpo na mokolo ya kokangolama.


pamba te mbuma ya pole ezali : boboto, bosembo, mpe bosolo.


Sik’oyo, Nzambe abombeli ngai motole ya bosembo, oyo Nkolo, Mosambisi ya sembo, akopesa ngai na mokolo wana : akopesa yango na ngai kaka te, kasi mpe na bato nyonso oyo balingaka boyei na Ye.


wana tozali kozela kokokisama ya elikya oyo epambolama : komonisama ya nkembo ya Yesu-Klisto, Nzambe monene mpe Mobikisi na biso, oyo


ndenge wana mpe Klisto, oyo amikabaki lokola mbeka mbala moko mpo na kolongola masumu ya bato ebele, akoya na mbala ya mibale, mpo na kolongola masumu ya bato te, kasi mpo na kobikisa bato oyo bazali kozela Ye na posa makasi.


Komekama yango eyei mpo na kotalisa bosolo ya kondima na bino mpe kosala ete bokoka kozwa masanzoli, nkembo mpe lokumu tango Yesu-Klisto akomonana. Boni, moto epetolaka wolo te ? Nzokande kondima na bino ezali na motuya koleka wolo oyo ebebaka.


Balingami na ngai, tozali sik’oyo bana na Nzambe ; kasi oyo tokokoma emonisami nanu te. Nzokande, toyebi solo ete tango Klisto akomimonisa, tokokoma lokola Ye ; pamba te tokomona Ye ndenge penza Ye azalaka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ