Bakomisi yango esobe, etikali pamba na miso na ngai, ekomi eloko ya mawa. Mokili mobimba ebebisami, pamba te moto moko te azali lisusu komema yango na motema.
Na tango ya kobota, mwasi ayokaka pasi makasi, pamba te eleko ya kobimisa mwana wuta kati na libumu na ye ekoki ; kasi soki kaka aboti, abosanaka pasi nyonso oyo amonaki, mpo na esengo oyo atondaka na yango mpo ete aboti moto.
Pamba te bikelamu nyonso ezali na se ya bokonzi ya nguya oyo esukaka na pamba ; na mokano na yango moko te, kasi na mokano ya Ye oyo atiaki bikelamu yango na se ya bokonzi yango, na elikya ete
Kasi bosengeli penza kowumela, kotelema ngwi mpe kolenda kati na kondima na bino ; mpe bosengeli koboya kopengwa mosika ya elikya oyo bozwaki wuta tango boyokaki Sango Malamu. Sango Malamu yango esakolamaki kati na bikelamu nyonso oyo ezali na se ya Likolo, mpe ngai Polo nakoma mosali na yango.