Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 8:20 - Mokanda na Bomoi

20 Pamba te bikelamu nyonso ezali na se ya bokonzi ya nguya oyo esukaka na pamba ; na mokano na yango moko te, kasi na mokano ya Ye oyo atiaki bikelamu yango na se ya bokonzi yango, na elikya ete

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 8:20
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abengaki ye Noa mpe alobaki : « Ye oyo akobondisa biso na mosala mpe na pasi ya maboko na biso likolo ya mabele oyo Yawe alakelaki mabe. »


Boye, Nzambe alobaki na Noa : « Nazwi mokano ya koboma bikelamu nyonso ya bomoi, pamba te mokili etondi na mabe likolo na bango. Solo, nakobebisa bango elongo na mokili.


Yawe, yebisa ngai tango nini bomoi na ngai ekosuka mpe motango ya mikolo ya bomoi na ngai mpo ete nasosola ete bomoi na ngai ezali kaka mpo na mwa tango moke.


Pamba na pamba, elobi Moteyi ; pamba na pamba, nyonso ezali kaka pamba.


Bakomisi yango esobe, etikali pamba na miso na ngai, ekomi eloko ya mawa. Mokili mobimba ebebisami, pamba te moto moko te azali lisusu komema yango na motema.


Kino tango nini mokili ekowumela na kolela mpe matiti ya bilanga nyonso ekowumela ya kokawuka ? Banyama mpe bandeke esili kokufa mpo ete bavandi ya mokili bazali mabe. Balobaka : « Yawe akoyeba te makambo oyo ekokomela biso. »


Mpo na yango, mokili ekokoma na mawa, bavandi na yango nyonso bakolemba nzoto, nyama ya zamba, ndeke ya likolo mpe mbisi ya ebale monene ekokufa.


Tika ete ngombe elela ! Bibwele ekomi kotelengana, pamba te matiti ya kolia etikali lisusu te ; ezala bameme to bantaba ekomi na pasi.


Toyebi malamu ete kino sik’oyo, bikelamu nyonso ezali kolela pasi lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota.


Pamba te tosila kobika, kasi kobika yango ezali nanu elikya. Nzokande soki tozali komona eloko oyo tozali kotiela elikya, wana ezali lisusu elikya te, pamba te nani akoki kotia elikya na eloko oyo azali komona ?


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ