Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 8:18 - Mokanda na Bomoi

18 Nakanisi ete pasi ya tango oyo ekokani te na motuya ya nkembo oyo ekomonisama mpo na biso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 8:18
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzokande, nazali komona bomoi na ngai lokola eloko pamba ; eloko oyo eleki motuya mpo na ngai ezali : kosukisa malamu momekano na ngai ya kopota mbangu mpe kokokisa lotomo oyo Nkolo Yesu apesaki ngai : kosakola Sango Malamu ya ngolu ya Nzambe.


Pamba te bikelamu nyonso ezali kozela na posa makasi ete bana na Nzambe bamonisama.


Tango Klisto oyo azali bomoi na bino akomonana, bino mpe bokomonana elongo na Ye kati na nkembo.


Na nzela ya Sango Malamu oyo toteyaki bino, Nzambe abengaki bino mpo ete bozwa lobiko mpe nkembo ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto.


wana tozali kozela kokokisama ya elikya oyo epambolama : komonisama ya nkembo ya Yesu-Klisto, Nzambe monene mpe Mobikisi na biso, oyo


Mpo na kondima, basi bamonaki bato na bango, oyo bakufaki kozonga lisusu na bomoi. Bato mosusu bandimaki ata konyokwama mpe baboyaki ete basikola bango, mpo bayebaki ete bakosekwa mpe bakozala na bomoi oyo ezali kitoko koleka.


Yango wana, boselingwa mpo na kosalela Nzambe lokola basali oyo balati bilamba ya mosala mpo na kosala ; bomibatela malamu mpe botia elikya na bino mobimba kati na ngolu oyo bokozwa tango Yesu-Klisto akomonana.


Bosepela nde, pamba te bozali kosangana na bapasi ya Klisto mpo ete botonda mpe na esengo tango akomonisa nkembo na Ye.


Nazali sik’oyo kolendisa bakambi ya Lingomba, oyo bazali kati na bino, pamba te ngai mpe nazali mokambi lokola bango, nazali motatoli ya bapasi ya Klisto mpe nakozwa nkembo oyo ekomonisama.


Balingami na ngai, tozali sik’oyo bana na Nzambe ; kasi oyo tokokoma emonisami nanu te. Nzokande, toyebi solo ete tango Klisto akomimonisa, tokokoma lokola Ye ; pamba te tokomona Ye ndenge penza Ye azalaka.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ