Ezali yango moko kaka te nde ezali kolela ; kasi biso ba-oyo mpe tozwaki Molimo lokola mbuma ya liboso tozali mpe komona pasi kati na mitema, wana tozali kozela na posa makasi ete Nzambe akomisa biso bana na Ye penza mpe asikola banzoto na biso.
Ndenge moko mpe Molimo ayaka kosunga biso kati na bolembu na biso ; pamba te toyebi te kosambela na lolenge oyo esengeli, kasi Molimo Ye moko abondelaka mpo na biso na maloba oyo moto akoki koloba te.
Elingi koloba ete bana nyonso oyo Abrayami abotaki bazali bakitani na ye te, kasi ezali kaka bana oyo abotaki kati na elaka ya Nzambe nde batangamaka lokola bakitani na ye.
Tala likambo oyo tokoki komikumisa na yango : mitema na biso ezali kotatola ete, kati na mokili mpe mingi penza na miso na bino, totambolaki na bosantu mpe na bosolo oyo ewutaka na Nzambe. Totambolaki bongo na bwanya ya bomoto te, kasi na ngolu ya Nzambe.
Bino mpe, sima na bino koyoka Liloba ya solo, Sango Malamu ya lobiko na bino, bondimelaki Klisto ; mpe Nzambe apesaki bino Molimo Mosantu oyo alakaki mpe, na nzela ya Molimo yango, abetaki bino kashe
Botala bolingo monene oyo Tata atalisaki biso mpo ete tobengama bana na Nzambe ! Mpe tozali solo bana na Nzambe. Tala tina nini mokili eyebi biso te : ezali mpo ete eyebi Nzambe te.
Tala ndenge nini bana na Nzambe bakeseni na bana ya Satana : moto nyonso oyo atambolaka te na bomoi ya sembo mpe alingaka ndeko na ye te azali mwana na Nzambe te.
Balingami na ngai, tozali sik’oyo bana na Nzambe ; kasi oyo tokokoma emonisami nanu te. Nzokande, toyebi solo ete tango Klisto akomimonisa, tokokoma lokola Ye ; pamba te tokomona Ye ndenge penza Ye azalaka.
Moto oyo andimelaka Mwana na Nzambe azali na litatoli yango kati na motema na ye ; moto oyo andimelaka Nzambe te akomisi Nzambe mokosi, pamba te andimaka te litatoli oyo Nzambe apesa na tina na Mwana na Ye.