Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 7:7 - Mokanda na Bomoi

7 Boye toloba nini ? Mobeko ekomi nde lisumu ? Soki moke te ! Soki Mobeko ezalaki te, nalingaki mpe koyeba lisumu te. Pamba te soki Mobeko elobaki te : « Okolulaka te, » nalingaki mpe koyeba te soki kolula ezali penza nini.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 7:7
30 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mwasi amonaki ete mbuma ya nzete ezali elengi mpo na kolia, kitoko mpo na kotala mpe malamu mpo na kofungola mayele. Boye azwaki mbuma mpe aliaki yango. Apesaki yango mpe na mobali na ye, oyo azalaki elongo na ye ; bongo ye mpe mobali aliaki yango.


Mokolo moko na pokwa, Davidi alamukaki wuta na mbeto na ye mpe atambolaki na veranda ya likolo ya ndako ya mokonzi. Wuta na likolo ya veranda, amonaki mwasi moko azali kosukola. Mwasi yango azalaki kitoko makasi.


Na nyonso oyo emonanaka lokola ya kokoka, namonaki mondelo ; kasi mibeko na Yo ezalaka na mondelo te.


Okolulaka te ndako ya moninga na yo ; okolulaka te mwasi ya moninga na yo, mowumbu na ye ya mobali to mwasi mowumbu na ye, ngombe na ye, ane na ye to eloko nyonso oyo ezali ya moninga na yo. »


Soki baluli bilanga ya moto, bazwaka yango na makasi ; soki baluli ndako ya moto, babotolaka yango ; bakangaka mokolo ndako mpe biloko na ye ya ndako mpe babotolaka moto libula na ye.


Kasi Ngai, nalobi na bino : Mobali nyonso oyo atali mwasi na makanisi ya kolula ye, asili kosala na ye ekobo kati na motema na ye.


Bongo alobaki na bato nyonso : — Bosala keba ! Bomibatela malamu ete bokweya te na lokoso ya konduka bomengo ; pamba te, ezala kati na bofuluki, ezali bomengo te nde esalaka bomoi ya moto.


Akoya ye moko, akoboma bafuteli elanga mpe akopesa elanga yango ya vino epai ya bato mosusu. Tango bato bayokaki bongo, balobaki : — Te, ekoki kosalema te !


Nalulaki te palata to wolo to elamba ya moto moko.


Mibeko lokola : « Okosalaka ekobo te, » « okobomaka te, » « okoyibaka te, » « okolulaka te, » mpe nyonso oyo etikali, elobami na mokuse kati na mobeko oyo moko : « Linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. »


Yango wana, moto moko te akotangama lokola moto ya sembo na miso ya Nzambe mpo ete akokisi misala ya Mobeko, pamba te Mobeko epesaka kaka boyebi ya lisumu.


Kasi soki mabe na biso ezali kotalisa polele bosembo ya Nzambe, toloba nini ? Nzambe azali mabe tango akitiselaka biso kanda na Ye ? Nazali kaka kokanisa lokola moto.


Toloba nini na tina na Abrayami, koko na biso ? Azwaki nini na bomoto ?


pamba te Mobeko ebendaka kanda ya Nzambe. Nzokande, esika oyo Mobeko ezali te, kobuka Mobeko mpe ezalaka te.


Mobeko eyaki mpo ete lisumu ebotana. Kasi epai lisumu ebotanaki, ngolu efulukaki koleka


Boye toloba nini ? Tokoba kosala masumu mpo ete tozali na se ya bokonzi ya Mobeko te kasi na se ya ngolu ? Soki moke te !


Pamba te lokola lisumu ezwaka nguya na esika oyo mitindo ezali, lisumu ekosaki ngai mpe ememaki ngai na kufa na nzela ya mitindo.


Boni, eloko ya malamu ekoki solo komemela ngai kufa ? Soki moke te ! Nzokande, mpo ete lisumu eyebana ete ezali lisumu, mpe mpo ete elakisa mabe na yango na nzela ya mitindo, esalelaki eloko oyo ezali malamu mpo ete lisumu yango epesa ngai kufa.


Pamba te wana tozalaki nanu kotambola kolanda baposa ya nzoto, Mobeko ezalaki kotindika biso na baposa ya mabe oyo ezalaki kosala mosala na yango kati na biteni ya banzoto na biso mpo ete tobota bambuma oyo ememaka na kufa.


Nzokande, lokola lisumu ezwaka nguya na esika oyo mitindo ezali, lisumu ebotaki kati na ngai lolenge nyonso ya baposa ya mabe. Pamba te soki Mobeko ezali te, lisumu mpe ezali na nguya te.


Nguya ya kufa ezali masumu, mpe nguya ya masumu ezali Mibeko.


Tika ete kindumba, lolenge nyonso ya makambo ya soni mpe lokoso etangamaka kutu te kati na bino, pamba te ebongi te mpo na basantu.


Okolulaka te mwasi ya moninga na yo ; okolulaka te ndako ya moninga na yo, elanga na ye, mowumbu na ye ya mobali to mwasi mowumbu na ye, ngombe na ye, ane na ye to eloko nyonso oyo ezali ya moninga na yo. › »


Boye, boboma nyonso oyo, kati na bomoi na bino, ezali ya mokili : pite, bosoto, baposa ya mabe, bilulela mpe lokoso ya mbongo, pamba te lokoso ya mbongo ezali ndenge moko na kosambela bikeko.


asengeli koboya kozala mowumbu ya baposa ya nzoto lokola Bapagano oyo bayebi Nzambe te,


Solo, Mibeko ya Moyize ebongisaki eloko moko te. Kasi elikya ya malamu koleka epesameli biso, elikya oyo, na nzela na yango, topusanaka pene ya Nzambe.


Namonaki, kati na bomengo ya bitumba, kazaka moko ya kitoko ya mboka Mezopotami, mbongo ya bibende ya palata, nkama mibale mpe ndambo ya kilo ya wolo ; nalulaki yango mpe nazwaki yango. Nakundaki yango na kati-kati ya ndako na ngai ya kapo, mpe palata ezali na se na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ