Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 7:23 - Mokanda na Bomoi

23 kasi kati na biteni ya nzoto na ngai, namonaka mobeko mosusu kobundisa mobeko ya makanisi ya motema na ngai mpe kokomisa ngai mowumbu ya mobeko ya lisumu oyo ezali kosala kati na biteni ya nzoto na ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 7:23
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yoka koganga na ngai, pamba te nazali na pasi makasi ! Kangola ngai wuta na maboko ya banyokoli na ngai, pamba te baleki ngai na makasi.


Kati na mokili, ezali na moto moko te ya sembo oyo asalaka kaka malamu, bongo azanga kosala masumu.


Bokaba biteni ya banzoto na bino te na lisumu lokola bisalelo mpo na mabe, kasi bomikaba bino moko epai na Nzambe lokola bato oyo basekwa kati na bakufi mpe bazali na bomoi ; mpe bokabela Ye biteni ya banzoto na bino lokola bisalelo mpo na bosembo.


Nazali koloba awa lokola moto mpo na bolembu na bino ya bomoto. Ndenge na kala, bokabaki biteni ya banzoto na bino na bowumbu ya misala ya mbindo mpe ya mabe mpo na kosala mabe, ndenge wana mpe bokaba yango sik’oyo na bowumbu ya bosembo mpo na kotambola na bomoi ya bosantu.


Toyebi ete Mobeko epesamaki na nzela ya Molimo na Nzambe ; kasi ngai nazali kaka moto, natekama mpo na kozala mowumbu ya lisumu.


Boye, namonaka mobeko oyo kosala kati na ngai : soki nalingi kosala bolamu, ezali mabe kaka nde nakosala.


Tika ete matondi epesamela Nzambe oyo akangolaka ngai na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso ! Na mokuse, nakoki koloba ete, na nzela ya mayele na ngai, nazali mowumbu ya Mobeko ya Nzambe, kasi na nzela ya bomoto na ngai ya masumu, nazali mowumbu ya mobeko ya lisumu.


Pamba te wana tozalaki nanu kotambola kolanda baposa ya nzoto, Mobeko ezalaki kotindika biso na baposa ya mabe oyo ezalaki kosala mosala na yango kati na biteni ya banzoto na biso mpo ete tobota bambuma oyo ememaka na kufa.


Pamba te kati na Yesu-Klisto, Mobeko ya Molimo oyo apesaka bomoi ekangoli ngai na bowumbu ya mobeko ya lisumu mpe ya kufa.


Pamba te baposa ya bomoto ebundisaka baposa ya Molimo, mpe baposa ya Molimo ebundisaka baposa ya bomoto. Nyonso mibale ebundisanaka mpo ete bolonga te kosala makambo oyo bolingi kosala.


Na etumba na bino ya kotelemela masumu, nanu bobundi te kino kondima ata kokufa.


Biso nyonso tobetaka mabaku na lolenge ebele. Moto oyo abetaka libaku te na maloba oyo ebimaka na monoko na ye azali moto ya kokoka mpe azali na makoki ya kobatela bomoto na ye nyonso.


Koswana mpe bitumba kati na bino ewutaka wapi ? Boni, ewutaka te na baposa mabe na bino, oyo ebundaka kati na banzoto na bino ?


Balingami na ngai, boyeba malamu ete bozali kati na mokili oyo lokola bapaya mpe baleki nzela ; yango wana nazali kosenga na bino ete boboyaka baposa mabe ya nzoto, pamba te ebundisaka molimo na bino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ