Boyoka ngai, bino bato oyo boyebi bosembo, bino bato oyo bozali na Mobeko na ngai kati na mitema na bino : Bobanga te lolenge bato bakotiola bino to bozala na somo ya mangungu na bango te.
Nganga-Nzambe akotala ye malamu : soki pembe ya matono yango ezali na yango ya pete, wana elakisi ete ezali na yango penza bokono te : moto yango azali peto.
Ezali kaka makambo ya kati nde ekomisaka moto Moyuda, mpe kokatama ngenga ya solo ezali nde oyo Molimo asalaka kati na motema ; ezali te oyo tosalaka na kotosa Mobeko. Lokumu ya Moyuda ya boye ewutaka na bato te, kasi na Nzambe.
Yango wana tobungisaka elikya te. Mpe atako bomoto na biso ya libanda ezali kobeba moke-moke, kasi bomoto na biso ya kati ekomaka ya sika, mokolo na mokolo.
Kasi tala Boyokani oyo nakosala elongo na bato ya Isalaele, sima na mikolo wana, elobi Nkolo : ‹ Nakotia mibeko na Ngai kati na makanisi na bango, nakokoma yango kati na mitema na bango, nakozala Nzambe na bango, mpe bango bakozala bato na Ngai.