Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 7:21 - Mokanda na Bomoi

21 Boye, namonaka mobeko oyo kosala kati na ngai : soki nalingi kosala bolamu, ezali mabe kaka nde nakosala.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 7:21
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Lendisa bomoi na ngai na nzela ya liloba na Yo mpe pekisa mabe ete ekonza ngai te.


Longola miso na ngai na makambo ya pamba, batela bomoi na ngai kati na banzela na Yo !


Yawe, kopimela ngai mawa na Yo te ; kasi sala ete bolingo mpe bosolo na Yo ebatelaka ngai tango nyonso.


Yo oyo oyokaka mabondeli, bato nyonso bakoya epai na Yo.


Yesu atondisamaki na Molimo Mosantu, alongwaki na Yordani, mpe Molimo amemaki Ye kati na esobe


Yesu azongiselaki bango : — Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo asalaka masumu azali mowumbu ya lisumu.


Yango wana, tika ete lisumu ezala lisusu na bokonzi te kati na banzoto na bino, oyo ekokufa ; mpe bosengeli lisusu te kotosa baposa na yango ya mabe.


Pamba te lisumu ekozala lisusu na bokonzi te likolo na bino, pamba te bozali lisusu na se ya bokonzi ya Mobeko te, kasi na se ya ngolu.


kasi kati na biteni ya nzoto na ngai, namonaka mobeko mosusu kobundisa mobeko ya makanisi ya motema na ngai mpe kokomisa ngai mowumbu ya mobeko ya lisumu oyo ezali kosala kati na biteni ya nzoto na ngai.


Tika ete matondi epesamela Nzambe oyo akangolaka ngai na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso ! Na mokuse, nakoki koloba ete, na nzela ya mayele na ngai, nazali mowumbu ya Mobeko ya Nzambe, kasi na nzela ya bomoto na ngai ya masumu, nazali mowumbu ya mobeko ya lisumu.


Pamba te kati na Yesu-Klisto, Mobeko ya Molimo oyo apesaka bomoi ekangoli ngai na bowumbu ya mobeko ya lisumu mpe ya kufa.


Yango wana asengelaki kozala ndenge moko na bandeko na Ye na makambo nyonso mpo ete akoma Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo atonda na boboto, mpe oyo bakoki kotiela motema na makambo oyo etali boyokani ya moto elongo na Nzambe, mpe mpo ete akoka kosala mosala ya bolimbisi masumu ya bato.


Pamba te tozali na Mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo akoki kosangana na bapasi na biso ; amekamaki kutu na makambo nyonso, ndenge biso mpe tozali komekama, kasi asalaki masumu te.


Balakaka bango bonsomi, nzokande bango moko bazali bawumbu ya baposa mabe ya nzoto, oyo ememaka bango na libebi ; pamba te moto nyonso azali mowumbu ya oyo ekonzaka ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ