Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 7:12 - Mokanda na Bomoi

12 Boye, Mobeko ezali bule, mpe mitindo ezali bule, sembo mpe malamu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 7:12
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okitaki na ngomba Sinai, olobaki na bango wuta na likolo mpe opesaki bango malako, mibeko ya solo mpe ya alima, mitindo mpe bikateli malamu.


Yango wana nalingaka mibeko na Yo koleka wolo, koleka kutu wolo ya peto ;


Yawe, ozali sembo, mpe mibeko na Yo ezali alima ;


Nzokande liloba na Yo ezali penza peto ; mpe ngai, mosali na Yo, nalingaka yango.


Tika ete lolemo na ngai eyemba liloba na Yo, pamba te mibeko na Yo nyonso ezali sembo.


Kokisela mosali na Yo bilaka oyo opesaki mpo na bato oyo batosaka Yo.


Mibeko na Yo nyonso ezali sembo ; kasi bazali konyokola ngai kaka pamba ; yaka kosunga ngai !


Bomekolaka te bizaleli ya tango oyo, kasi bobongwana na nzela ya boyeisami sika ya mayele na bino, mpo ete bososolaka mokano ya Nzambe, oyo ezali malamu, esepelisaka Ye mpe ezali ya kokoka.


Boni, tobomi Mobeko likolo ya kondima ? Soki moke te ! Tozali kutu kolendisa yango.


Toyebi ete Mobeko epesamaki na nzela ya Molimo na Nzambe ; kasi ngai nazali kaka moto, natekama mpo na kozala mowumbu ya lisumu.


Mpe soki nasalaka makambo oyo naboyaka kosala, wana nandimi ete Mobeko ezali malamu.


Sik’oyo, Oh Isalaele, likambo nini Yawe, Nzambe na yo, azali kozela epai na yo ? Yawe, Nzambe na yo, azali kozela ete otosa Yawe, Nzambe na yo, na kotambola na banzela na Ye nyonso, na kolinga Ye mpe kosalela Yawe, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba,


Mpe ekolo nini mosusu ya monene, oyo ekoki kozala na mitindo mpe mibeko ya sembo lokola Mobeko oyo natie lelo liboso na bino ?


Toyebi ete mibeko ezalaka malamu soki moto azali kosalela yango na ndenge oyo ebongi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ