Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 7:11 - Mokanda na Bomoi

11 Pamba te lokola lisumu ezwaka nguya na esika oyo mitindo ezali, lisumu ekosaki ngai mpe ememaki ngai na kufa na nzela ya mitindo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 7:11
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yawe Nzambe alobaki na mwasi : — Mpo nini osali bongo ? Mwasi azongisaki : — Ezali nyoka nde akosaki ngai, mpe naliaki yango.


Makanisi na ye ekangama na putulu, motema na ye ya lokuta ezali kokosa ye ; akokoka te komikangola mpe koloba : « Boni, eloko oyo ezali na loboko na ngai ya mobali ezali lokuta te ? »


Motema eleki biloko nyonso na lokuta mpe ekoki kobika te ; nani akoki koyeba yango ?


Somo oyo bato bazali koyoka yo mpe lolendo ya motema na yo ezali kokosa yo. Yo movandi ya madusu ya mabanga, yo oyo otonga ndako na yo na basonge ya bangomba ; ata soki otongi zala na yo likolo lokola mpongo, nakokweyisa yo longwa kuna kino na se, » elobi Yawe.


Lolendo ya motema na yo ekosaki yo, yo movandi ya madusu ya mabanga, yo oyo otonga ndako na yo na basonge ya bangomba mpe omilobelaka : ‹ Nani akokweyisa ngai na se ? ›


Yango wana, moto moko te akotangama lokola moto ya sembo na miso ya Nzambe mpo ete akokisi misala ya Mobeko, pamba te Mobeko epesaka kaka boyebi ya lisumu.


Boni, eloko ya malamu ekoki solo komemela ngai kufa ? Soki moke te ! Nzokande, mpo ete lisumu eyebana ete ezali lisumu, mpe mpo ete elakisa mabe na yango na nzela ya mitindo, esalelaki eloko oyo ezali malamu mpo ete lisumu yango epesa ngai kufa.


Nzokande, lokola lisumu ezwaka nguya na esika oyo mitindo ezali, lisumu ebotaki kati na ngai lolenge nyonso ya baposa ya mabe. Pamba te soki Mobeko ezali te, lisumu mpe ezali na nguya te.


mpo ete bobwaka etamboli na bino ya kala, etamboli ya bomoto na bino ya kala, oyo ebebaka na nzela ya baposa ya lokuta,


kasi bolendisanaka bino na bino mokolo na mokolo, na tango nyonso oyo bakoki nanu koloba « lelo, » mpo ete moko te kati na bino akosama na masumu mpe akoma motema libanga.


Botiaka na misala Liloba na Nzambe ; kasi bosukaka kaka te na koyoka yango, soki te bokomikosa bino moko na pamba.


Moto oyo akanisaka ete asambelaka Nzambe, kasi ayebaka te kobatela lolemo na ye, azali komikosa ye moko, mpe kosambela na ye ezali na tina te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ