Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Barome 7:10 - Mokanda na Bomoi

10 Bongo mitindo oyo esengelaki komema na bomoi ememi ngai na kufa.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Barome 7:10
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Napesaki bango bikateli na Ngai mpe nalakisaki bango mibeko na Ngai mpo ete moto oyo akotosa yango abika na nzela na yango.


Kasi bana ya Isalaele batombokelaki Ngai kati na esobe ; batosaki bikateli na Ngai te, kasi babwakaki mibeko na Ngai, oyo moto oyo asengeli kotosa mpo ete abika na nzela na yango. Mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba. Boye, namilobelaki ete nakotombokela bango makasi mpe nakobebisa bango kati na esobe.


Kasi bana mpe batombokelaki Ngai, balandaki bikateli na Ngai te, babatelaki te na bokebi mibeko na Ngai, oyo moto asengeli kotosa mpo ete abika na nzela na yango, mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba. Boye, namilobelaki ete nakotombokela bango makasi mpe nakopelisela bango kanda na Ngai kati na esobe.


Bobatela mitindo mpe mibeko na Ngai, pamba te moto oyo akosalela yango akobika bomoi na ye na nzela na yango. Nazali Yawe.


Tala ndenge nini Moyize akomaki na tina na bosembo oyo ewutaka na Mobeko : « Moto oyo akosalela yango akobika bomoi na ye na nzela na yango. »


pamba te Mobeko ebendaka kanda ya Nzambe. Nzokande, esika oyo Mobeko ezali te, kobuka Mobeko mpe ezalaka te.


Na kala, tango Mobeko ezalaki te, nazalaki na bomoi ; kasi tango mitindo eyei, lisumu mpe ezwi nguya, mpe ngai nakufi.


Sik’oyo, soki lotomo ya kufa, oyo ekomamaki na likolo ya bitando ya mabanga, eyaki na nkembo, na ndenge ete bana ya Isalaele balongaki te kowumela kotala elongi ya Moyize likolo ya kongenga ya nkembo na yango, nzokande nkembo yango esengelaki kosila,


Nzokande, Mobeko ewuti na kondima te, pamba te ekomama : « Moto oyo akosalela yango akobika bomoi na ye na nzela na yango. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ